Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 59 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Look, our Father's hand is not too short to save, nor his ear too dull to hear. Tala, loboko na Yawe ezali mokuse te mpo na kobikisa, litoyi na Ye ekangama te mpo na koyoka !
2 But your wrongs have separated you from your Father, and your sins have hidden his face from you, so that he does not hear. Kasi ezali bambeba na bino nde ekaboli bino na Nzambe na bino, ezali masumu na bino nde esali ete abombela bino elongi na Ye mpo ete ayoka bino te.
3 For your hands are defiled with blood, and your fingers with sin; your lips have spoken lies, your tongue mutters wickedness. Pamba te maboko na bino ebebi na makila, mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe ; bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta, mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe.
4 No one calls for justice, and no one pleads with honesty. They trust in emptiness and speak lies; they conceive trouble and give birth to evil. Moko te azali kofunda makambo na bosolo, moko te azali kosamba na bosembo ; bazali kotia mitema na makambo ezanga tina mpe bazali koloba lokuta ; na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabe mpe bakokisaka yango na misala na bango.
5 They hatch the eggs of vipers and weave the spider's web; whoever eats their eggs dies, and when one is crushed, a viper breaks out. Bazali kopasola maki ya etupa mpe bazali kotonga ndako ya lifofe. Moto nyonso oyo akolia maki na yango akokufa ; mpe, soki apasoli liki moko, ekobimisa etupa.
6 Their webs cannot become clothing, and they cannot cover themselves with what they make. Their works are works of wrongdoing, and their hands are full of violence. Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te, misala na bango ekobomba bango te ; misala na bango ezali misala mabe, mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango.
7 Their feet run to evil, and they hurry to shed innocent blood. Their thoughts are thoughts of wrongdoing; ruin and destruction lie along their every road. Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.
8 The way of peace they do not know, and there is no justice in their ways. They have made their paths crooked; no one who walks in them knows peace. Bayebi nzela ya kimia te, mpe bosembo ezali na nzela na bango te ; bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka, moko te oyo akotambola na nzela yango akotikala koyeba kimia.
9 Therefore justice is far from us, and righteousness does not reach us. We wait for light, but there is only darkness; for brightness, but we walk in gloom. Yango wana bosembo ezali mosika na biso, mpe solo ezali kokomela biso te ; tozali kozela pole, kasi nyonso ezali kaka molili ; toluki moyi, kasi tozali kaka kotambola na molili.
10 We grope along the wall like the blind; like those without eyes we grope. We stumble at noon as if in twilight; among the strong we are like the dead. Tozali kosimbasimba mir mpo na kotambola lokola bakufi miso, tozali kobanga kotambola lokola bato bazanga miso ; tozali kobeta mabaku na moyi makasi lokola nde tozali na butu makasi, tozali na nzoto kolongono kasi tokomi lokola bakufi.
11 We all growl like bears and moan mournfully like doves. We wait for justice, but there is none; for salvation, but it stays far from us. Biso nyonso tozali konguna-nguna lokola bangombolo, mpe tozali kolelalela tango nyonso lokola ebenga ; tozali koluka bosembo, kasi tozali komona yango te, tozali koluka lobiko, kasi ekimi mosika na biso !
12 For our rebellions are many before you, and our sins testify against us. Our rebellions are with us, and our wrongdoing we know: Pamba te mabe na biso ekomi mingi na miso na Yo, mpe masumu na biso ekomi kofunda biso ; masumu na biso ezali liboso na biso mpe toyebi malamu bambeba na biso :
13 rebelling and denying our Father, turning back from following our Father, speaking oppression and revolt, conceiving and muttering lying words from the heart. kotomboka mpe kowangana Yawe, kopesa Nzambe na biso mokongo, kosala mabongisi ya konyokola bato mpe kotombokisa bato, kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta.
14 So justice is driven back, and righteousness stands far off; for truth has stumbled in the public square, and integrity cannot enter. Boye, bosembo ezongi sima, mpe bosolo etelemi mosika ; pamba te solo ekweyi na balabala, mpe bosembo elongi kokota te.
15 Truth is missing, and whoever turns from evil is plundered. Our Father saw it and was displeased that there was no justice. Solo ezali komonana lisusu na esika moko te ; bazali konyokola moto oyo azali kokima mabe. Yawe amoni yango mpe asepeli te ete kosambisa na bosembo ezali te.
16 He saw that there was no one, and was appalled that no one would intervene; so his own arm brought salvation, and his righteousness upheld him. Amoni ete ezali ata na moto moko te, akamwe ete ata molobeli moko te azali. Boye, loboko na Ye moko ememi Ye na lobiko, mpe bosembo na Ye elendisi Ye.
17 He put on righteousness like a breastplate, and a helmet of salvation on his head; he clothed himself in garments of vindication and wrapped himself in zeal like a cloak. Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo, mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye ; alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala, mpe amizipi zuwa lokola kazaka.
18 According to their deeds, so he will repay: wrath to his adversaries, repayment to his enemies; to the distant coastlands he will give them what they deserve. Akofuta moto na moto kolanda misala na ye : kanda makasi epai ya bayini na Ye, mpe lifuti oyo ekoki epai ya banguna na Ye ; akopesa na bisanga lifuti na yango.
19 So they will fear the name of our Father from the west, and his glory from the rising of the sun; for he will come like a rushing river, driven by the wind of our Father. Longwa na ngambo ya weste, bato bakobanga Kombo ya Yawe ; mpe longwa na ngambo ya este, bato bakokumisa nkembo na Ye ; pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, oyo pema ya Yawe ekomema.
20 Then the Redeemer will come to Zion, to those in Jacob who turn from their sins, declares our Father. « Mpo na Siona, mosikoli akoya epai ya bato ya Jakobi, oyo bakobongwana na masumu na bango, » elobi Yawe.
21 "As for me, this is my covenant with them," says our Father: "My Spirit who is upon you, and my words that I have put in your mouth, will not depart from your mouth, or from the mouth of your children, or from the mouth of your children's children," says our Father, "from now on and forever." « Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]