Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 60 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Arise, shine, for your light has come, and the glory of our Father has risen upon you. « Telema mpe ngenga, pamba te pole na yo ezali koya, mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo.
2 For darkness will cover the earth, and thick darkness the peoples; but our Father will rise upon you, and his glory will be seen upon you. Tala, molili ezipi mabele mpe molili makasi ezipi bato, kasi Yawe atelemi mpo na yo mpe nkembo na Ye emonani epai na yo.
3 Nations will come to your light, and kings to the brightness of your dawning. Bikolo ekotambola na pole na yo, mpe bakonzi bakotambola na kongenga ya pole na yo.
4 Lift up your eyes all around and see: they all gather together, they come to you; your sons come from far away, and your daughters are carried on the hip. Tombola miso zingazinga na yo mpe tala : Bango nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo ; bana na yo ya mibali bawuti mosika, mpe oyo ya basi, bamemi bango na maboko.
5 Then you will see and be radiant; your heart will throb and swell, because the abundance of the sea will turn toward you, the wealth of the nations will come to you. Boye, okomona mpe okongenga, motema na yo ekobeta mpe ekosepela ; bomengo ya ebale ekoya epai na yo, mpe bozwi ya bikolo ekoya epai na yo.
6 A multitude of camels will cover you, the young camels of Midian and Ephah; all those from Sheba will come, bearing gold and frankincense, and they will proclaim the praises of our Father. Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. Yango nyonso ekowuta na Saba, ekomema wolo mpe malasi ya ansa, mpe ekotatola masanzoli na Yawe.
7 All the flocks of Kedar will be gathered to you, the rams of Nebaioth will minister to you; they will be offered on my altar and accepted, and I will glorify my glorious house. Bibwele nyonso ya Kedari ekosangana epai na yo, bameme ya mibali ya Nebayoti ekosalela yo ; ekondimama lokola mbeka na likolo ya etumbelo na Ngai, mpe nakongengisa Tempelo na nzela ya nkembo na Ngai.
8 Who are these that fly like a cloud, and like doves to their windows? Banani oyo bazali kokima lokola mapata, lokola bibenga epai ya babokoli na yango ?
9 Surely the coastlands wait for me, the ships of Tarshish first, to bring your sons from far away, with their silver and gold, for the name of your Father, the Holy One of Israel, because he has glorified you. Solo, bisanga ekotalela Ngai ; bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, elongo na palata mpe wolo, mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele ; pamba te apesi yo nkembo.
10 Foreigners will build up your walls, and their kings will serve you; for in my wrath I struck you, but in my favor my heart was moved with compassion for you. Bapaya bakotonga lisusu bamir na yo, mpe bakonzi na bango bakosalela yo. Ezala nabetaki yo na kanda na Ngai, kasi nakoyokela yo mawa na ngolu na Ngai.
11 Your gates will stand open continually; day and night they will not be shut, so that the wealth of the nations may be brought to you, with their kings led in procession. Bikuke na yo ekozala tango nyonso efungwama, ekotikala kokangama te, ezala na moyi to na butu, mpo ete bato bamemela yo bozwi ya bikolo, bakonzi na yango na molongo lokola bato bakangami na etumba.
12 For the nation and kingdom that will not serve you will perish; those nations will be utterly laid waste. Pamba te ekolo to mboka oyo ekosalela yo te ekobebisama ; solo, ekobebisama nye.
13 The glory of Lebanon will come to you—the cypress, the plane, and the pine together—to beautify the place of my sanctuary; and I will glorify the place of my feet. Nkembo ya Libani ekoya epai na yo, banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwisi ekoya elongo mpo na kobongisa Esika na Ngai ya bule ; mpe nakopesa lokumu na esika na Ngai, oyo natiaka makolo na Ngai.
14 The children of those who oppressed you will come bowing before you; all who despised you will bow down at your feet. They will call you the City of our Father, the Zion of the Holy One of Israel. Bana ya banyokoli na yo bakoya kofukama liboso na yo ; bato nyonso oyo batiolaki yo bakofukama na se ya matambe na yo mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Isalaele.
15 Though you have been forsaken and hated, with no one passing through, I will make you an everlasting pride, a joy from generation to generation. Ata basundolaki yo mpe bayinaki yo, mpe moto moko te azalaki lisusu koleka epai na yo, nakopesa yo lokumu mpo na tango nyonso mpe esengo ya libela na libela.
16 You will drink the milk of nations, and nurse at the breast of kings; and you will know that I, your Father, am your Savior and your Redeemer, the Mighty One of Jacob—your Father. Okomela miliki ya bikolo mpe okomela mabele ya bakonzi ; boye okoyeba solo ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo mpe Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi.
17 Instead of bronze I will bring gold, instead of iron I will bring silver, instead of wood, bronze, and instead of stones, iron. I will make peace your governor and righteousness your taskmaster. Na esika ya bronze, nakomemela yo wolo, mpe na esika ya bibende, nakomemela yo palata ; na esika ya banzete, nakomemela yo bronze ; mpe na esika ya mabanga, nakomemela yo bibende ; nakokomisa Kimia moyangeli na yo, mpe Bosembo, mokambi na yo.
18 Violence will no longer be heard in your land, nor ruin and destruction within your borders; but you will call your walls Salvation and your gates Praise. Kati na mokili na yo, okoyoka lisusu te makelele ya mobulu to ya kopanza to ya kobebisama kati na etando na yo ; kasi okobenga bamir na yo ‹ Lobiko, › mpe bikuke na yo ‹ Masanzoli. ›
19 The sun will no longer be your light by day, nor will the moon give you its light; but our Father will be your everlasting light, and your Father your glory. Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo.
20 Your sun will no longer set, and your moon will not wane; for our Father will be your everlasting light, and the days of your mourning will be ended. Moyi na yo ekolala lisusu te, mpe sanza na yo ekobunga lisusu te ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe mikolo na yo ya pasi ekosila.
21 Your people will all be righteous; they will possess the land forever—the branch of my planting, the work of my hands, that I may be glorified. Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.
22 The least one will become 1,000, and the smallest a mighty nation. I am your Father; when the time is right, I will make it happen quickly. Oyo aleki moke kati na bino akokoma nkoto moko, mpe oyo aleki moke penza akokoma ekolo ya makasi. Ngai, nazali Yawe, nakoyeisa yango mbangu na tango na yango. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]