Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 61 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The Spirit of the Sovereign Father is upon me, because our Father has anointed me to bring good news to the poor. He has sent me to bind up the brokenhearted, to proclaim freedom for the captives and release for those bound in darkness, Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;
2 to proclaim the year of our Father's favor and the day of our Father's vindication, to comfort all who mourn, mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu, kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe, kobondisa bato oyo bazali kolela,
3 to provide for those who mourn in Zion—to give them a crown of beauty instead of ashes, the oil of gladness instead of mourning, a garment of praise instead of a spirit of despair; so they will be called oaks of righteousness, the planting of our Father, that he may be glorified. komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.
4 They will rebuild the ancient ruins and raise up the places long devastated; they will restore the ruined cities, desolate for many generations. Bakotonga lisusu bisika oyo ekoma mabanga-mabanga wuta kala, bisika oyo ebukana-bukana wuta na tango ya kala ; bakokomisa sika bingumba oyo ekweya, oyo ebeba wuta bileko ya kala.
5 Strangers will tend your flocks; foreigners will be your plowmen and vineyard workers. Bapaya bakoleisa bibwele na yo, bana ya bapaya bakosalela yo bilanga mpe bakolonela yo bilanga ya vino.
6 But you will be called the priests of our Father; you will be named the ministers of our Father. You will feed on the wealth of the nations, and in their riches you will boast. Kasi bino, bokobengama Banganga-Nzambe ya Yawe, bakopesa bino kombo bawumbu ya Nzambe na biso ; bokolia mpe bokotonda na bozwi ya bikolo mpe bokozwa lokumu na bomengo na bango.
7 Instead of your shame you will receive a double portion, and instead of disgrace you will rejoice in your inheritance; so you will possess a double portion in your land, and everlasting joy will be yours. Na esika ya soni na bino, bokozwa litomba mbala mibale, mpe na esika ya kosambwa, bokosepela na libula na bino. Boye, bokozwa litomba mbala mibale kati na mokili na bino mpe bokosepela mpo na libela.
8 "For I, your Father, love justice; I hate robbery and wrongdoing. In my faithfulness I will reward my people and make an everlasting covenant with them. Pamba te Ngai Yawe, nalingaka bosembo, nayinaka moyibi mpe masumu ; nakofuta bino na bolingo na Ngai mpe nakosala boyokani ya libela elongo na bino.
9 Their children will be known among the nations and their descendants among the peoples; all who see them will acknowledge that they are the children our Father has blessed." Bakitani na bino bakoyebana kati na mabota, mpe bana na bino bakoyebana kati na bikolo ; moto nyonso oyo akomona bino akondima ete bozali bato oyo Yawe apamboli.
10 I will rejoice greatly in our Father; my soul will leap for joy in our Father. For he has clothed me with garments of salvation and covered me with a robe of righteousness, as a bridegroom adorns his head like a priest, and as a bride adorns herself with her jewels. Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.
11 For as the soil sends up its shoots, and as a garden causes what is sown to spring up, so the Sovereign Father will cause righteousness and praise to spring up before all the nations. Pamba te ndenge mabele ebimisaka matiti mpe elanga ebimisaka nkona na yango, Nkolo Yawe mpe akoyeisa bosembo elongo na masanzoli liboso ya bikolo nyonso.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]