Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 62 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 For Zion's sake I will not keep silent, and for Jerusalem's sake I will not rest, until her righteousness shines out like the dawn, and her salvation like a blazing torch. Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te ; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.
2 The nations will see your righteousness, and all kings your glory; and you will be called by a new name that our Father himself will give you. Bongo bikolo ekomona bosembo na yo, mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo. Bakobenga yo na kombo ya sika oyo monoko na Yawe ekopesa.
3 You will be a crown of beauty in the hand of our Father, a royal crown in the hand of our Father. Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo.
4 No longer will they call you Forsaken, nor name your land Desolate; but you will be called Hephzibah—My Delight Is in Her—and your land Beulah—Married; for our Father's heart delights in you, and your land will be married. Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.
5 For as a young man marries a young woman, so will your sons marry you; and as a bridegroom rejoices over his bride, so will your Father rejoice over you. Lokola elenge mobali abalaka moseka, bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ; lokola elenge mobali asepelaka na mobandami na ye ya mwasi, Nzambe na yo mpe akosepela na yo.
6 On your walls, Jerusalem, I have posted watchmen; all day and all night they will never be silent. You who remind our Father, give yourselves no rest, Oh Yelusalemi, natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ; bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu. Bino bato oyo bosalaka ete Yawe akanisa lisusu Yelusalemi, bovanda kimia te ;
7 and give him no rest until he establishes Jerusalem and makes her praised throughout the earth. mpe botikela Ye te tango ya kopema kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili !
8 By his right hand Our Father has sworn, and by the arm of his strength: "Never again will I hand your grain to your enemies as food, nor will foreigners drink the new wine you toiled for; Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali, loboko na Ye ya nguya, mpe alapi ndayi : « Nakopesa lisusu ble na yo te lokola bilei epai ya banguna na yo ; bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika oyo omonelaki pasi ;
9 but those who harvest it will eat it and praise our Father, and those who gather it will drink it in the courts of my sanctuary." kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yango mpe bakokumisa Yawe, mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yango kati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. »
10 Pass through, pass through the gates! Prepare the way for the people. Build up, build up the highway; clear away the stones; raise a banner over the peoples. Boleka, boleka na bikuke ! Bobongisela bato nzela, bopasola nzela, bopasola nzela ya monene ! Bolongola mabanga, botombola bendele liboso na bato ya bikolo.
11 Look, our Father has proclaimed to the ends of the earth: Say to daughter Zion, "Look, your salvation is coming; look, his reward is with him, and his payment before him." Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele : « Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya ! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »
12 And they will be called The Holy People, The Redeemed of our Father; and you will be called Sought Out, A City Not Forsaken. Bakobenga bango Libota mosantu, basikolami na Yawe ; mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka, engumba oyo basundola te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]