Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 63 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Who is this coming from Edom, in crimson-stained garments from Bozrah, this one majestic in his apparel, striding in his great strength? "It is I, proclaiming righteousness, mighty to save." Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane ? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi ? « Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »
2 Why is your apparel red, and your garments like one who treads in the winepress? Mpo na nini bilamba na yo ezali motane lokola bilamba ya mokamoli vino ?
3 "I have trodden the winepress alone, and from the peoples no one was with me; I crushed them in my anger and trampled them in my wrath; their lifeblood splattered on my garments, and I stained all my apparel. « Nazalaki kaka ngai moko kati na ekamolelo mpo na kokamola vino, moko te kati na bato ya bikolo nyonso azalaki elongo na ngai. Nanyataki-nyataki bango na kanda na ngai mpe nakamolaki bango na kanda na ngai ya makasi ; makila na bango epumbwelaki ngai na bilamba mpe ebebisaki bilamba na ngai nyonso.
4 For the day of reckoning was in my heart, and the year of my redeemed had come. Pamba te, na motema na ngai, ezalaki nde mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpe mobu na ngai ya kosikola ekokaki.
5 I looked, but there was no one to help; I was appalled that no one upheld me; so my own arm brought me salvation, and my wrath upheld me. Natalaki, kasi namonaki moto te oyo akosunga ; nakamwaki ete moto azalaki te mpo na kosunga ngai ! Bongo, loboko na ngai moko ebikisaki ngai, mpe kanda na ngai ya makasi esungaki ngai.
6 I trampled the peoples in my anger; I made them drunk in my wrath, and I poured out their lifeblood on the ground." Nanyataki-nyataki bikolo na kanda na ngai, nalangwisaki bango na kanda na ngai ya makasi mpe nasopaki makila na bango na mabele. »
7 I will tell of the covenant love of our Father, the praises of him, according to all that he has done for us, and the great goodness he has shown to the house of Israel, according to his compassion, according to his abundant covenant love. Nakotatola boboto ya Yawe, nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ; solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.
8 For he said, "Surely they are my people, children who will not be false." And he became their Savior. Alobaki : « Solo, bazali bato na Ngai, bazali bana oyo bakosaka Ngai te ! » Yango wana, Yawe akomaki Mobikisi na bango.
9 In all their affliction he was afflicted, and the messenger of his presence saved them; in his love and in his compassion he redeemed them; he lifted them up and carried them all the days of old. Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango ; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.
10 But they rebelled and grieved his Holy Spirit; so he turned and became their enemy, and he himself fought against them. Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.
11 Then he recalled the days of old, of Moses and of his people. Where is the one who led them up from the sea, with his flock's shepherds? Where is the one who placed his Holy Spirit among them, Boye, bato na Ye bakanisaki mikolo ya tango ya kala, mikolo ya tango ya Moyize : Wapi Ye oyo akatisaki bango ebale monene, elongo na mobateli bibwele ya etonga na Ye ? Wapi Ye oyo atiaki kati na bango Molimo Mosantu na Ye ?
12 who stretched out his glorious arm at the right hand of Moses, who divided the waters before them to make for himself an everlasting name, Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkembo ezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize, Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bango mpo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela ;
13 who led them through the depths? Like a horse in the wilderness, they did not stumble. Ye oyo atambolisaki bango kati na mozindo ? Lokola mpunda kati na esobe, babetaki libaku te ;
14 Like livestock that go down into the valley, the Spirit of our Father gave them rest. So you led your people, to make for yourself a glorious name. lokola bibwele oyo ezali kokita na lubwaku, Molimo na Yawe apesaki bango bopemi. Ezali ndenge wana nde okambaki bato na Yo mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yo.
15 Look down from heaven and see, from your holy and glorious dwelling. Where are your zeal and your mighty deeds? The stirring of your heart and your compassion are held back from me. Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo : Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?
16 For you are our Father, though Abraham does not know us and Israel does not acknowledge us; you are our Father; our Redeemer from ages past is your name. Nzokande, Yo nde ozali Tata na biso ; atako Abrayami ayebi biso te to Isalaele andimi biso te ; kasi Yo, Yawe, ozali Tata na biso, Kombo na Yo ezali : Mosikoli na biso ya tango nyonso.
17 Why, our Father, do you let us wander from your ways and harden our heart, so that we do not fear you? Return for the sake of your servants, the tribes of your heritage. Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayenga mosika ya nzela na Yo ? Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasi mpo ete totosa Yo te ? Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo, mabota ya libula na Yo !
18 For a little while your holy people held possession; our enemies have trampled your sanctuary. Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bule kaka mpo na mwa tango moke ; kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule !
19 We have become like those you have never ruled, like those not called by your name. Wuta kala, tozalaka bato na Yo ; kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te, lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te. Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita, bangomba ekoningana liboso na Yo !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]