Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 64 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Oh, that you would tear open the heavens and come down, that the mountains would quake at your presence, Not in this edition
1 as fire sets brushwood ablaze and causes water to boil—to make your name known to your adversaries, so that the nations would tremble at your presence! Ndenge moto etumbaka matiti mpe etokisaka mayi na nzungu, kita mpo na kosala ete banguna na Yo bayeba Kombo na Yo mpe bikolo eningana liboso na Yo !
2 When you did awesome things that we did not expect, you came down, and the mountains quaked at your presence. Pamba te tango osalaki makambo ya somo oyo biso tozalaki kozela te, okitaki mpe bangomba eninganaki liboso na Yo.
3 Since ancient times, no one has heard or perceived by ear, no eye has seen any besides you, who acts for the one who waits for him. Wuta na tango ya kala penza, moto moko te atikala kososola, litoyi moko te etikala koyoka, liso moko te etikala komona, ete nzambe moko, longola kaka Yo, asalaka boye mpo na bato oyo batalelaka ye.
4 You welcome those who gladly do what is right, who remember you as they walk in your ways. But you were angry, and we sinned; we have long been in our sins—can we be saved? Osungaka bato oyo bazalaka na esengo ya kosala makambo ya sembo, ba-oyo babosanaka nzela na Yo te. Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu ; bongo ndenge nini tokoki solo kobika ?
5 We have all become like one who is unclean, and all our righteous deeds are like a filthy garment. We all wither like a leaf, and our sins, like the wind, sweep us away. Biso nyonso, tokomi lokola eloko ya mbindo, misala na biso nyonso ya bosembo ezali lokola elamba ya mbindo ; biso nyonso tokawuki lokola likasa mpe masumu na biso ememi biso lokola mopepe !
6 There is no one who calls on your name, who rouses himself to take hold of you; for you have hidden your face from us and have handed us over to our sins. Moko te azali kobelela Kombo na Yo to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, pamba te obombeli biso elongi na Yo mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.
7 But now, you are our Father; we are the clay, and you are our potter; we are all the work of your hand. Nzokande oh Yawe, ozalaka Tata na biso ; biso tozali lokola mabele oyo basalelaka bikeko, bongo Yo, ozali lokola mosali mbeki ; biso nyonso tozali mosala ya maboko na Yo.
8 Do not be so terribly angry, our Father, and do not remember our sin forever. Look, please—we are all your people. Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
9 Your holy cities have become a wilderness; Zion has become a wilderness, Jerusalem a desolation. Bingumba na Yo ya bule ekomi esobe ; ezala Siona, yango mpe ekomi esobe ; Yelusalemi etikali lisusu na bato te !
10 Our holy and beautiful house, where our fathers praised you, has been burned with fire, and all that we treasured has become a ruin. Tempelo na biso ya bule mpe ya lokumu epai wapi batata na biso bazalaki koyemba masanzoli mpo na lokumu na Yo, esili kozika na moto ; mpe nyonso oyo tozalaki na yango ya motuya esili kobebisama !
11 After all this, will you hold back, our Father? Will you keep silent and afflict us so terribly? Oh Yawe, sima na makambo oyo nyonso, okozongisa kaka motema na Yo sima te ? Okokanga kaka monoko mpe okopesa biso kaka etumbu oyo eleki ndelo ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]