Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 65 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I let myself be sought by those who did not ask for me; I let myself be found by those who did not seek me. I said, "Here I am, here I am," to a nation that did not call on my name. « Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te, namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te. Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te, nalobaki : ‹ Ngai oyo, Ngai oyo ! ›
2 All day long I have spread out my hands to a rebellious people, who walk in a way that is not good, following their own schemes, Mikolo nyonso, natandaki maboko na Ngai epai ya bato ya mito makasi, oyo balandaka nzela ya mabe, oyo batambolaka kolanda makanisi na bango ;
3 a people who provoke me to my face continually, sacrificing in gardens and burning incense on bricks; bato oyo bapesaka Ngai kanda tango nyonso na nko, babonzaka mbeka kati na bilanga mpe babonzaka malasi ya ansa na bitumbelo basala na babiliki ;
4 who sit among the tombs and spend the night in secret places; who eat the flesh of pigs, with broth of forbidden things in their pots; bato oyo bavandaka kati na bakunda mpe balekisaka babutu na bango kati na madusu ya mabanga ; bato oyo baliaka misuni ya ngulu mpe basani na bango etonda na bilei ya mbindo ;
5 who say, "Keep to yourself, do not come near me, for I am holier than you." These are smoke in my nostrils, a fire that burns all day long. bato oyo balobaka : ‹ Zala mosika na Ngai, kopusana pene na Ngai te, pamba te nazali bule makasi na miso na yo ! › Bato ya lolenge oyo bazali lokola milinga na zolo na Ngai, lokola moto oyo epelaka mikolo nyonso.
6 Look, it stands written before me: I will not keep silent, but I will repay; I will repay into their lap, Tala, etikali ya kokomama liboso na Ngai : nakovanda nye te kino nakozongisela bango mabe na bango ; solo, nakozongisela bango penza mabe na bango koleka.
7 both your own sins and the sins of your ancestors together, says our Father; because they burned incense on the mountains and insulted me on the hills, I will measure into their lap full payment for their former deeds. Ezala mpo na masumu na bino to mpo na masumu ya batata na bino, » elobi Yawe, « pamba te babonzaki malasi ya ansa na likolo ya bangomba milayi mpe basambwisaki Ngai na likolo ya bangomba mikuse ; solo penza, nakozongisela bango mabe, nakofuta bango kolanda misala na bango oyo eleka ! »
8 This is what our Father says: As the new wine is found in the cluster, and someone says, "Do not destroy it, for there is a blessing in it," so I will do for the sake of my servants, and not destroy them all. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ndenge kaka balobaka soki bamoni liboke ya bambuma kitoko ya vino : ‹ Kobebisa te, pamba te lipamboli moko ezali wana, › ndenge mpe kaka nakosala mpo na basali na Ngai : nakoboma bango nyonso te.
9 "I will bring forth descendants from Jacob, and from Judah an heir of my mountains; my chosen will inherit it, and my servants will dwell there. Nakobimisa libota moko kati na Jakobi ; mpe kati na Yuda, nakobimisa mokitani oyo akozwa bangomba na Ngai lokola libula ; bato na Ngai, ba-oyo naponi bakokamata yango lokola libula, mpe bawumbu na Ngai nde bakovanda kuna.
10 Sharon will become a pasture for flocks, and the Valley of Achor a resting place for herds, for my people who have sought me. Etando ya Saroni ekokoma esika ya koleisa bibwele, mpe Lubwaku ya Akori ekokoma esika ya kopema mpo na bangombe. Nyonso wana ekosalema mpo na bato na Ngai, oyo balukaka Ngai.
11 But you who forsake me, who forget my holy mountain, who set a table for Fortune and fill cups of mixed wine for Destiny. Kasi mpo na bino bato oyo bosundoli Yawe mpe bobosani ngomba na Ngai ya bule, bino oyo botandaka mesa mpo na Gadi mpe botondisaka kopo ya vino mpo na Meni,
12 I will destine you for the sword, and all of you will bow down to the slaughter, because I called and you did not answer, I spoke and you did not listen; you did what was evil in my eyes and chose what gave me no delight." nakobongisa bino ete bokufa na mopanga, mpe bino nyonso bokofukama mpo ete bakata bino bakingo, pamba te nabengaki, kasi boyanolaki te ; nalobaki, kasi boyokaki te : bosalaki kaka makambo mabe na miso na Ngai mpe boponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »
13 Therefore this is what the Sovereign Father says: Look, my servants will eat, but you will go hungry; my servants will drink, but you will go thirsty; my servants will rejoice, but you will be put to shame; Mpo na yango, Nkolo Yawe alobi : « Bawumbu na Ngai bakolia, kasi bino bokozala na nzala ; bawumbu na Ngai bakomela, kasi bino bokotikala kaka na posa ya komela ; bawumbu na Ngai bakosepela, kasi bino bokoyoka soni ;
14 "look, my servants will sing for gladness of heart, but you will cry out for pain of heart and wail for a broken spirit. bawumbu na Ngai bakoyemba na esengo, esengo oyo ekowuta solo na mitema na bango, kasi bino bokoganga mpo na pasi ya mitema na bino mpe bokolelalela mpo na milimo na bino oyo ebukani.
15 You will leave your name to my chosen as a curse, and the Sovereign Father will put you to death; but his servants he will call by another name, Bokotika kombo na bino epai ya baponami na Ngai lokola lisuma ; Nkolo Yawe akoboma bino ; kasi epai ya baponami na Ye, akopesa kombo mosusu.
16 so that whoever invokes a blessing in the land will bless himself by the Father of truth, and whoever takes an oath in the land will swear by the Father of truth; for the former troubles are forgotten and hidden from my eyes. Moto nyonso oyo akobelela lipamboli kati na mokili akosala bongo na Kombo ya Nzambe ya solo, mpe moto oyo akolapa ndayi kati na mokili, akolapa yango na Kombo ya Nzambe ya solo. Pamba te pasi ya kala ekomonana lisusu te, ekobombama na miso na Ngai.
17 "For look, I am creating new heavens and a new earth, and the former things will not be remembered or come to mind. Solo, nakokela likolo mpe mabele ya sika ; makambo ya liboso, bakokanisa yango lisusu te, ekomata ata lisusu na motema te.
18 But be glad and rejoice forever in what I am creating; for look, I am creating Jerusalem to be a joy, and her people to be a gladness. Kasi bosepela mpe bozala tango nyonso na esengo mpo na misala oyo nakokela, pamba te nakokela Yelusalemi mpo ete ezala na esengo, mpe bato na yango basepela.
19 I will rejoice over Jerusalem and be glad in my people; no longer will the sound of weeping be heard in her, or the cry of distress. Bongo nakosepela mpo na Yelusalemi mpe mpo na bato na Ngai ; makelele ya kolela mpe ya koganga ekoyokana lisusu kuna te.
20 No more will there be in it an infant who lives only a few days, or an old man who does not live out his years; for the young man will die one hundred years old, and the one who falls short of one hundred will be thought accursed. Kuna, ekozala lisusu na mwana moke te oyo akokufa na bomwana na ye to ekozala lisusu na mobange te oyo akotonda te na mikolo ya bomoi na ye ; pamba te moto oyo akokufa elenge akozala na mibu nkama moko ya mbotama, mpe oyo akokokisa mibu wana te, akomonana lokola moto alakelami mabe.
21 They will build houses and live in them; they will plant vineyards and eat their fruit. Bakotonga bandako mpe bakovanda kati na bandako yango, bakolona bilanga ya vino mpe bakolia bambuma na yango.
22 They will not build for another to live in, or plant for another to eat; for my people's days will be like the days of a tree, and my chosen will long enjoy the work of their hands. Bakotonga bandako te mpo ete bato mosusu bavanda kati na bandako yango, mpe bakolona bilanga te mpo ete bato mosusu balia bambuma na yango ; pamba te mikolo ya mbotama ya bato na Ngai ekozala lokola mikolo ya nzete, mpe baponami na Ngai bakosepela na bambuma ya misala ya maboko na bango.
23 They will not labor in vain or bear children for sudden terror, for they are the offspring of those our Father has blessed, and their descendants with them. Bakosala mosala na pamba te to bakobota bana te mpo ete bakufa ; pamba te bakozala bato oyo bapambolama na Yawe, bango elongo na bana na bango.
24 Before they call, I will answer; while they are still speaking, I will hear." Liboso ete babelela Ngai, nakoyanola bango ; mpe wana basilisi nanu koloba te, nakoyoka bango.
25 The wolf and the lamb will graze together, and the lion will eat straw like the ox, but dust will be the serpent's food. They will not harm or destroy anywhere on my holy mountain, says our Father. Mbwa ya zamba mpe mwana meme ekolia esika moko ; mpe nkosi ekolia matiti lokola ngombe, kasi bilei ya nyoka ekozala nde putulu. Bakoyoka lisusu pasi te, mpe bakobebisama lisusu te na ngomba na Ngai ya bule, » elobi Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]