Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 66 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is what our Father says: "Heaven is my throne, and the earth is my footstool. Where, then, is the house you would build for me? And where is the place of my rest? Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?
2 My hand has made all these things, and so they all came into being, declares our Father. But this is the one to whom I will look: the one who is humble and contrite in spirit, and who trembles at my word. Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.
3 But whoever slaughters an ox is like one who kills a man; whoever sacrifices a lamb, like one who breaks a dog's neck; whoever offers a grain offering, like one who presents pig's blood; whoever burns frankincense, like one who blesses an idol. They have chosen their own ways, and their soul delights in their abominations. Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.
4 So I also will choose harsh treatment for them and bring their dread upon them, because when I called, no one answered; when I spoke, they did not listen. They did what was evil in my eyes and chose what does not please me." Boye, Ngai mpe nakotindela bango pasi mpe nakotindela bango pasi oyo babangaka. Pamba te tango nabelelaki, moto moko te ayanolaki ; tango nalobaki, moto moko te ayokaki ; kasi basalaki makambo mabe na miso na Ngai mpe baponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »
5 Hear the word of our Father, you who tremble at his word: "Your own brothers who hate you and cast you out for my name's sake have said, 'Let our Father be glorified, that we may see your joy'—but it is they who will be put to shame." Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye : « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi : ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino ! › Kasi bango nde bakosambwa solo.
6 A sound of uproar from the city! A voice from the temple! It is the voice of our Father, repaying his enemies what they have done! Boyoka makelele kobima longwa na engumba, boyoka makelele kobima longwa na Tempelo ! Ezali nde mongongo na Yawe oyo azali kofuta banguna na Ye kolanda oyo ekoki na misala na bango.
7 Before she was in labor, she gave birth; before her pain came upon her, she delivered a son. Liboso ete ayoka pasi ya kobota, abotaki ; liboso ete pasi ya kobota ekomela ye, abotaki mwana mobali.
8 Who has ever heard of such a thing? Who has ever seen such things? Can a land be born in a single day? Can a nation be brought forth in a moment? Yet no sooner was Zion in labor than she brought forth her children. Nani ayoka likambo ya boye ? Nani amona makambo ya boye ? Boni, mokili ekoki kobotama na mokolo moko to ekolo ekoki solo kosalema na mbala moko ? Nzokande, kaka tango Siona ayoki pasi ya kobota, tala ye wana asili kobota bana na ye.
9 "Will I bring to the moment of birth and not deliver?" says our Father. "Will I who deliver shut the womb?" says your Father. Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota mpe kozanga makoki ya kobotisa ? » Elobi Yawe. « Nakoki solo kokanga mabota soki nazali kopesa mabota ? » elobi Nzambe na yo.
10 Rejoice with Jerusalem and be glad for her, all you who love her; rejoice with her in joy, all you who mourn over her, « Bosepela elongo na Yelusalemi mpe botonda na esengo mpo na ye, bino nyonso oyo bolingaka ye ; bosepela makasi elongo na ye, bino nyonso oyo bosalelaki ye matanga.
11 that you may nurse and be satisfied at her comforting breast, that you may drink deeply and delight in her overflowing glory. Pamba te bokomela miliki mpe bokotonda mabele na ye, oyo ebondisaka ; bokomela penza ndenge esengeli mpe bokozwa esengo kati na bomengo na ye. »
12 For this is what our Father says: "I will extend peace to her like a river, and the glory of the nations like an overflowing stream; you will nurse and be carried on her hip and bounced upon her knees. Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakosopela ye kimia lokola ebale, mpe bozwi ya bikolo lokola ebale na tango ya mpela ; bokobatelama, bokomemama na maboko na ye mpe akobondela bino na mabolongo na ye.
13 As a mother comforts her child, so I will comfort you; and you will be comforted over Jerusalem." Ndenge mama abondelaka mwana na ye, ndenge wana mpe Ngai nakobondela bino ; mpe bokobondisama mpo na Yelusalemi. »
14 When you see this, your heart will rejoice, and your bones will flourish like new grass; the hand of our Father will be made known to his servants, but his fury to his enemies. Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika lokola matiti ya mobesu ; loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye.
15 For look—our Father will come with fire, and his chariots like the whirlwind, to unleash his anger with fury and his rebuke with flames of fire. Tala, Yawe azali koya na moto, mpe bashar na Ye ezali lokola mopepe ya kayina ; akokitisa kanda na Ye na somo penza mpe akopamela na nzela ya moto.
16 For with fire and with his sword our Father will execute judgment on all flesh, and those slain by our Father will be many. Yawe akosambisa bato nyonso na nzela ya moto mpe ya mopanga ; bongo, bato ebele bakokufa na mopanga, na maboko na Yawe.
17 "Those who consecrate and purify themselves to enter the gardens, following one in the midst, eating the flesh of pigs and vermin and mice, will come to an end together, declares our Father. « Bato oyo bamibulisaka mpe bamipetolaka mpo na kokende na bilanga mpe kolanda moto moko oyo azali na kati-kati ya bato oyo baliaka misuni ya bangulu, ya bampuku mpe biloko mosusu ya mbindo, bakokufa bango nyonso elongo, » elobi Yawe.
18 "For I know their deeds and thoughts. The time comes to gather all nations and tongues; they will come and see my glory. « Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso ; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai.
19 "I will set a sign among them and send survivors to the nations—Tarshish, Pul, Lud (who draw the bow), Tubal, Javan, and distant coastlands that never heard of me or saw my glory. They will declare my glory among the nations. Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.
20 They will bring all your brothers from every nation as an offering to our Father—on horses, in chariots and wagons, on mules and camels—to my holy mountain Jerusalem, says he, as Israel brings a grain offering in a clean vessel to the house of our Father. Bakomema bandeko na bino nyonso wuta na bikolo nyonso, lokola likabo epai na Yawe, na ngomba na Ngai ya bule, na Yelusalemi, na likolo ya bampunda, ya bashar mpe ya bashareti oyo ekangama, ya mikongo ya bamile mpe ya bashamo, » elobi Yawe. « Bakomema bango ndenge bana ya Isalaele bamemaka makabo na bango ya bambuma, kati na basani ya bule, na Tempelo ya Yawe.
21 And some of them I will take to be priests and Levites, says our Father. Mpe nakopona kati na bango, ndambo ya bato mpo ete bazala Banganga-Nzambe mpe Balevi, » elobi Yawe.
22 "For just as the new heavens and the new earth that I make will endure before me, declares our Father, so will your offspring and your name endure. « Ndenge likolo mpe mabele ya sika oyo nasili kosala ekowumela liboso na Ngai, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe bakitani na bino mpe kombo na bino ekowumela.
23 From new moon to new moon, and from Sabbath to Sabbath, all flesh will come to worship before me, says our Father. Bato ya mokili mobimba bakoya kofukama liboso na Ngai, longwa na feti moko ya ebandeli ya sanza kino na feti mosusu, longwa na Saba moko kino na mosusu, » elobi Yawe,
24 "And they will go out and look on the corpses of those who rebelled against me; for their worm will not die, and their fire will not be quenched, and they will be a horror to all flesh." « bakobima mpe bakomona bibembe ya bato oyo batombokelaki Ngai, pamba te bankusu na bango ekokufa te mpe moto na bango ekokufa te ; bakopesa moto nyonso somo. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]