Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The words of Jeremiah son of Hilkiah, one of the priests at Anathoth in Benjamin's land. Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame ; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.
2 The word of our Father came to him in the days of Josiah son of Amon, king of Judah, in the thirteenth year of his reign. Yawe alobaki na ye tango mokonzi Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi,
3 It also came in the days of Jehoiakim son of Josiah, king of Judah, through the eleventh year of Zedekiah son of Josiah, king of Judah, until Jerusalem's exile in the fifth month. mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu.
4 The word of our Father came to me, saying: Yawe alobaki na ngai :
5 "Before I formed you in the womb I knew you, and before you were born I set you apart; I appointed you a prophet to the nations." — Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.
6 I said, "Ah, Sovereign Father! I don't know how to speak, for I'm only a boy." Nazongisaki : — Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge !
7 But our Father said to me, "Don't say, 'I'm only a youth,' for you'll go wherever I send you and speak whatever I command. Kasi Yawe alobaki na ngai : — Koloba te : « Nazali elenge. » Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo.
8 Do not be afraid of them, for I am with you to deliver you, declares the Father." Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, —elobi Yawe.
9 Then our Father reached out his hand, touched my mouth, and our Father told me, "Look, I've put my words in your mouth. Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.
10 See, I have set you this day over the nations and over the kingdoms, to uproot and to tear down, to destroy and to overthrow, to build and to plant." Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.
11 The word of our Father came to me: "What do you see, Jeremiah?" I said, "I see an almond branch." Sima na yango, Yawe atunaki ngai : — Jeremi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona etape ya nzete ya amande.
12 Then our Father said to me, "You have seen rightly, for I watch over my word to fulfill it." Yawe alobaki na ngai : — Omoni malamu, pamba te nasenzelaka maloba na Ngai mpo na kokokisa yango.
13 The word of our Father reached me a second time: "What do you see?" I said, "A boiling pot, facing away from north." Yawe atunaki ngai lisusu : — Ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona nzungu moko ezali kotoka, etengama na ngambo ya nor.
14 And our Father said to me, "Out of the north, disaster will break loose on all who live in the land. Yawe alobaki na ngai : — Ezali wuta na nor nde pasi ekokomela bavandi ya mokili.
15 I'm about to summon all the northern kingdoms' clans, declares the Father; they'll come, each setting his throne at the entrance to Jerusalem's gates, against all her surrounding walls and all Judah's cities. Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe. Bakonzi na bango bakoya kotia bakiti na bango ya bokonzi liboso ya bikuke ya Yelusalemi ; bakozingela bamir nyonso ya Yelusalemi mpe bakobundisa bingumba nyonso ya Yuda.
16 And I will pronounce my judgments against them for all their evil in forsaking me, in burning offerings to other gods and bowing down to idols they made with their own hands." Nakosambisa bato na Ngai mpo na mabe oyo basalaki : basundolaki Ngai, bakomaki kobonza mbeka ya malasi epai ya banzambe mosusu, mpe bakomaki kogumbamela banzambe oyo basalaki na maboko na bango.
17 "Now get ready, stand and tell them all I command you. Don't break down before them, or I will break you before them. Mibongisa, yika mpiko ! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo ; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.
18 Look, today I make you a fortified city, iron pillar, bronze walls against the whole land: Judah's kings, officials, priests, and its people. Na mokolo ya lelo, nakomisi yo engumba batonga makasi, likonzi ya ebende mpe mir ya ebende mpo na komibatela liboso ya mokili mobimba : liboso ya bakonzi ya Yuda, ya bakalaka na yango, ya Banganga-Nzambe na yango mpe ya bavandi nyonso ya mokili yango.
19 They will fight you but not overcome you; I am with you to rescue you, declares the Father." Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ; pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]