Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word of our Father came to me, saying: Yawe alobaki na ngai :
2 Go, proclaim in Jerusalem's hearing: our Father says: I remember your youth's devotion, your bridal love, your following me through the wilderness, a land not sown. « Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge ; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.
3 Israel was holy to our Father, the firstfruits of his harvest. All who devoured her were held guilty; disaster overtook them, declares our Father. Isalaele abulisamaki mpo na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye : moto nyonso oyo azalaki kolia yango azalaki komema ngambo, mpe pasi ezalaki kokomela ye, › » elobi Yawe.
4 Hear the word of our Father, house of Jacob, and all clans of the house of Israel. Oh libota ya Jakobi, bino bituka nyonso ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe !
5 This is what our Father says: What wrong did your ancestors find in me, that they strayed far from me, chasing worthless idols and becoming worthless? Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mabe nini batata na bino bazwaki Ngai mpo ete basundola Ngai ? Basepelaki kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, mpe bango moko bakomaki bato pamba.
6 They did not ask, 'Where is our Father, who brought us up out of the land of Egypt, who led us through the wilderness, through a land of deserts and pits, a land of drought and deep darkness, a land no one crosses and where no one lives?' Bamitunaki te : ‹ Wapi Yawe oyo abimisaki biso na Ejipito mpe amemaki biso kati na esobe ? Wapi Yawe oyo atambolisaki biso na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, mokili ya molili mpe ya kufa, mokili oyo baleki nzela balekelaka te mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te ? ›
7 And I brought you into a fruitful land to eat its fruit and its goodness. But you came and defiled my land, and made my inheritance an abomination. Namemaki bino na mokili oyo mabele na yango ebotaka malamu mpo ete bolia mbuma na yango ya kitoko ; kasi boyaki nde kokomisa mokili na Ngai mbindo mpe kokomisa libula na Ngai eloko ya nkele.
8 The priests did not ask, 'Where is our Father?' Those who handle the law did not know me; the shepherds rebelled against me; the prophets prophesied by Baal and followed what is worthless. Banganga-Nzambe bamitunaki te mpo na koluka koyeba : ‹ Yawe azali wapi ? › Balakisi ya Mobeko balukaki koyeba Ngai te, bakambi batombokelaki Ngai ; basakoli bazalaki kosakola na kombo ya Bala mpe balandaki banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.
9 Therefore I still bring my charge against you, declares our Father, and against your children's children I will press it. Yango wana, nakosambisa bino, » elobi Yawe. « Nakosambisa bino elongo na bakitani na bino,
10 Cross over to the shores of Cyprus and look; send to Kedar and observe closely; see whether there has ever been anything like this: Bokatisa na ngambo ya bisanga ya kitimi mpe botala malamu, botinda bato na Kedari mpe botala malamu ; botala malamu penza soki likambo ya boye esila kosalema.
11 Has a nation ever changed its gods, even though they are no gods at all? Yet my people have exchanged their glory for what is worthless. Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango mpo na kosambela banzambe mosusu ? Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te. Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.
12 Be appalled at this, heavens; be shocked, be utterly horrified, declares our Father. Oh likolo, tika ete likambo oyo ekamwisa yo mpe epesa yo somo makasi, » elobi Yawe.
13 For my people have committed two evils: they have forsaken me, the fountain of living waters, and have dug their own cisterns—broken cisterns that cannot hold water. « Bato na Ngai basali masumu mibale : Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, mabulu oyo ekawukaka noki.
14 Is Israel a slave? Was he born a servant? Why then has he become plunder? Boni, Isalaele azali solo mowumbu to abotama kati na ndako ya bowumbu ? Mpo na nini akomi lokola eloko pamba na miso ya bikolo mosusu ?
15 The young lions roared against him; they growled loudly. They made his land a waste; his cities are burned and empty of people. Bankosi engalaki na koganga mpo na kolengisa ye, ekomisaki mokili na ye lokola esobe ; batumbaki bingumba na ye mpe etikalaki lisusu na bato te.
16 Moreover, the men of Memphis and Tahpanhes have shaved the crown of your head. Mpe lisusu, bato ya Mefisi mpe ya Dafine babuki moto na yo.
17 Have you not brought this on yourself by forsaking your Father, who was leading you along the way? Mpo na nini makambo oyo nyonso ezali kokomela yo ? Boni, ezali te mpo ete osundulaki Yawe, Nzambe na yo, tango azalaki nanu kotambolisa yo na nzela ?
18 And now, why go to Egypt to drink the waters of the Nile? Why go to Assyria to drink the waters of the Euphrates? Bongo sik’oyo, mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Nili kati na Ejipito ? Mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Efrate kati na Asiri ?
19 Your own evil will discipline you; your own apostasy will rebuke you. Know then and see how evil and bitter it is to forsake your Father; you have no fear of me, declares the Father of heaven's armies. Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
20 Long ago I broke your yoke and tore off your bonds, but you said, 'I will not serve.' Indeed, on every high hill and under every spreading tree you lay down as a prostitute. « Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo mpe kokata minyololo na yo. Ozalaki koloba : ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu lokola mwasi ya ndumba.
21 I had planted you as a choice vine, from wholly reliable seed. How then did you turn against me to become a corrupt, wild vine? Nzokande, Ngai nalonaki yo lokola nzete kitoko ya vino mpo ete obotaka mbuma ya malamu na tembe te. Bongo, ndenge nini sik’oyo obalukeli Ngai mpe okomi nzete oyo nayebi te, nzete oyo ebotaka mbuma mabe ?
22 Though you wash yourself with lye and use much soap, the stain of your guilt is still before me, declares the Sovereign Father. Ata soki omisukoli na kisi oyo basalelaka sabuni to omipakoli sabuni ndenge nini, masumu na yo ekolongwa te liboso na Ngai, » elobi Nkolo Yawe.
23 How can you say, 'I am not defiled; I have not gone after the Baals'? Look at your way in the valley; consider what you have done—a restless young camel running here and there, « Ndenge nini okoki penza koloba : ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te ? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ;
24 a wild donkey at home in the wilderness, sniffing the wind in her craving—who can restrain her when she is in heat? Those who want her don't need to tire themselves searching; when the season comes, they will find her. lokola ane ya zamba oyo emesana na esobe, oyo ebendaka mopepe na zolo soki ekomi na posa ya kosangisa nzoto. Bongo, nani akoki kokanga posa na yango ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali ? Mpunda nyonso ya mobali oyo ekolanda yango ekomona pasi te, pamba te ekozwa yango na tango ya posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali.
25 Stop before your feet are worn bare and your throat goes dry. But you said, 'It is hopeless! No, for I love strangers, and after them I will go.' Sala keba ! Noki te okotikala makolo ngulu mpe okokawuka mongongo likolo ya bitambola-tambola ! Kasi ozali koloba : ‹ Tika na yo ! Ngai nalingaka banzambe ya bapaya mpe nakolanda kaka bango. ›
26 As a thief is shamed when he is caught, so the house of Israel is shamed—they, their kings, their officials, their priests, and their prophets, Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye, ndenge wana mpe ekosalema mpo na libota ya Isalaele : bakonzi mpe bakambi na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa.
27 who say to a tree, 'You are my father,' and to a stone, 'You gave me birth.' For they have turned their backs on me, not their faces toward me. But in the time of their trouble they cry, 'Arise and save us!' Balobaka na nzete : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na libanga : ‹ Yo nde obotaki ngai. › Bapesaki Ngai mikongo, kasi bilongi na bango te. Nzokande soki bakomi na pasi, babelelaka : ‹ Yaka kobikisa biso ! ›
28 But where are the gods you made for yourself? Let them arise, if they can save you in the time of your trouble; for you have as many gods as you have cities, Judah. Wapi sik’oyo banzambe na bino, banzambe oyo bosalaki na maboko na bino ? Tika ete eya kobikisa bino na tango ya pasi, soki penza ekokoka ! Pamba te, oh bato na Yuda, ndenge motango ya bingumba na bino ezali, ndenge wana mpe motango ya banzambe na bino ezali.
29 Why do you bring a charge against me? You have all rebelled against me, declares our Father. Mpo na nini bozali kosambisa Ngai ? Nzokande, ezali bino nyonso nde botombokelaki Ngai, » elobi Yawe.
30 In vain I struck your children; they accepted no correction. Your own sword devoured your prophets like a ravenous lion. « Napesaki bato na yo etumbu ya pamba ; pamba te bazwaki na bango kaka mayele te. Mopanga na yo ebomi basakoli na yo ndenge nkosi ebomaka bato.
31 Generation, consider the word of our Father: Have I been a wilderness to Israel, or a land of deep darkness? Why then do my people say, 'We are free to roam; we will come to you no more'? Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe : Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi mpo na mokili ya Isalaele ? Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba : ‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi mpe tokoya lisusu epai na yo te ? ›
32 Can a young woman forget her jewelry, or a bride her wedding sash? Yet my people have forgotten me for days without number. Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele ? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.
33 How cleverly you scheme to pursue love! You have even taught your ways to wicked women. Oh, tala ndenge otondi na mayele ya koluka bolingo ! Na etamboli na yo, okoki ata kopesa mayele yango ezala na basi oyo baleki mabe !
34 On your skirts is found the lifeblood of the innocent poor—though you did not catch them breaking in. Yet in spite of all these things, Kino na bilamba na yo, bato bamonaka makila ya babola, ya bato oyo bayebi likambo te mpe okangi bango na mabe te.
35 you say, 'I am innocent; surely his anger has turned from me.' Yet I will bring you to judgment for saying, 'I have not sinned.' Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba : ‹ Nayebi ata likambo moko te, kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. › Kasi Ngai nakopesa yo etumbu mpo ete ozali koloba : ‹ Nasali masumu te. ›
36 How casually you keep changing course! You will be put to shame by Egypt as you were put to shame by Assyria. Mpo na nini omipesi na koyengayenga na nzela nyonso ? Okosambwa mpo na Ejipito ndenge osambwaki mpo na Asiri.
37 From there too you will come away with your hands on your head, for our Father has rejected those in whom you trust, and they will do you no good. Okotika lisusu esika yango, maboko na moto, pamba te Yawe asundoli bato oyo ozalaki kotiela motema ; mpe bango bakosunga yo te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]