Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 They say: If a man divorces his wife and she leaves him and marries another man, will he return to her again? Would not that land be utterly defiled? You have prostituted yourself with many lovers—and yet you would return to me? declares your Father. « Soki mobali abomi libala na mwasi na ye, mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu ; boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye ? Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo ? Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele, bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, » elobi Yawe.
2 Lift up your eyes to the barren heights and look: where have you not been violated? By the roadsides you sat waiting for lovers, like a nomad in the desert. You have defiled the land with your prostitution and your wickedness. « Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala : Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.
3 So the showers have been withheld, and the spring rains have not come. Yet you have the brazen look of a prostitute; you refuse to be ashamed. Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.
4 Have you not just now called out to me, 'My Father, you are the friend of my youth'? Boni, obengaka Ngai te : ‹ Tata na ngai, moninga na ngai ya bomwana ! ›
5 "Will he stay angry forever? Will he keep his wrath to the end?" This is how you talk, but you do all the evil you can. Ozali kutu kotuna Ngai : ‹ Boni, kino tango nini okokanga kanda ? Kotomboka na yo ekosila te ? › Yango nde makambo ozali koloba, kasi ozali mpe kaka kokoba na misala na yo ya mabe. »
6 Our Father said to me in King Josiah's days: "Have you seen what unfaithful Israel did? She went up every high hill, under every spreading tree, and prostituted herself there. Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba.
7 I thought after she did all this she would return to me, but she didn't, and her treacherous sister Judah saw it. Nakanisaki ete akozongela Ngai soki asilisi kosala makambo nyonso oyo azalaki na yango posa ; kasi azongeli Ngai te, mpe ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, amonaki yango.
8 She saw that for all unfaithful Israel's adulteries I sent her away and gave her a certificate of divorce. Yet her treacherous sister Judah had no fear; she too went and prostituted herself. Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye ; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te ; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba.
9 Because her prostitution meant so little, she made the land unclean, committing adultery with stones and trees. Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete.
10 Even so, her unfaithful sister Judah did not return to me wholeheartedly, but only in pretense, declares your Father." Atako bongo, ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, azongaki epai na Ngai te na motema na ye mobimba ; azongaki na ye kaka likolo-likolo, » elobi Yawe.
11 Our Father said to me: Unfaithful Israel proved more righteous than treacherous Judah. Yawe alobaki na ngai : « Mopengwi Isalaele azali sembo koleka mopengwi Yuda.
12 Go and proclaim toward the north: Return, unfaithful Israel, declares your Father. I will not look on you in anger, for I am merciful, declares your Father; I will not stay angry forever. Kende kosakola sango oyo na nor : ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › elobi Yawe, ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, pamba te nazali Moyengebene, › elobi Yawe. ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.
13 Only acknowledge your guilt—that you rebelled against your Father, lavished your favors on strangers under every spreading tree, and did not obey my voice, declares your Father. Ndima kaka mabe na yo, mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo ; obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya, na se ya banzete nyonso ya mibesu, mpe otosaki Ngai te, › » elobi Yawe.
14 Return, you faithless children, declares your Father, for I am your husband. I will take you—one from a city and two from a family—and bring you to Zion. « Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona.
15 Then I will give you shepherds after my own heart, feeding you with knowledge and understanding. Bongo nakopesa bino bakambi kolanda posa ya motema na Ngai, bakambi oyo bakotambolisa bino na bwanya mpe na mayele.
16 When you have multiplied and increased in the land, in those days, declares your Father, no one will say again, 'The ark of the covenant of our Father.' It will not come to mind, be remembered, or be missed, nor will another be made. Na mikolo wana, tango bokokoma penza ebele na mokili, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Sanduku ya Boyokani ya Yawe. › Bakomitungisa lisusu mpo na yango te mpe bakokanisa yango lisusu te ; kozanga na yango ekolobela bato eloko moko te, mpe bakoluka lisusu te kosala Sanduku ya Boyokani.
17 "Then they will call Jerusalem the Throne of our Father, and all the nations will gather there to honor our Father's name. No longer will they follow their stubborn, evil hearts. Na tango wana, bakobenga Yelusalemi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, mpe bikolo nyonso ekosangana na Yelusalemi mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yawe. Boye, bakolanda lisusu te baposa mabe ya mitema na bango.
18 In those days the house of Judah will join the house of Israel, and together they will come from the northern land to the land I gave your ancestors as an inheritance. Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele ; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula.
19 I myself said, 'How gladly would I set you among my children and give you a pleasant land, the most beautiful inheritance of any nation!' And I thought you would call me 'My Father' and never turn away from following me. Namilobelaki : ‹ Esengo nini penza nazalaki na yango ya kokamata bino lokola bana mpe kopesa bino mikili ya kitoko, libula oyo eleki kitoko kati na bikolo ! › Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata › mpe bokotika te kolanda Ngai.
20 But like a wife unfaithful to her husband, so you have been unfaithful to me, house of Israel, declares your Father. Kasi bino lisanga ya Isalaele, bokosi Ngai lokola mwasi oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, » elobi Yawe.
21 A voice is heard on the barren heights—the weeping and pleading of Israel's children—because they have perverted their way and forgotten their Father. Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba : ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele, pamba te babebisi nzela na bango mpe babosani Yawe, Nzambe na bango.
22 "Return, you faithless children; I will heal your faithlessness." "Here we are, we come to you, for you are our Father. « Bino batomboki, bozonga epai na Ngai mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino ! » « Solo, tokozonga epai na Yo, pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.
23 Surely the uproar on the hills and mountains is a delusion; surely in our Father is the salvation of Israel. Solo, bisala-sala oyo ezali kosalema na bangomba mikuse mpe milayi ezali kaka makelele ya pamba. Solo, Yawe, Nzambe na biso, azali Lobiko ya Isalaele.
24 From our youth that shameful thing has devoured the fruit of our ancestors' labor—their flocks and herds, their sons and daughters. Wuta bolenge na biso, banzambe ya bikeko ebebisaki mbuma ya misala ya batata na biso, bibwele na bango mpe ngombe na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi.
25 Let us lie down in our shame, and let our disgrace cover us. For we have sinned against our Father—we and our ancestors—from our youth to this day, and we have not obeyed the voice of our Father." Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]