Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "If you will return, Israel," declares our Father, "then return to me. If you put away your detestable things from my presence and do not waver, « Oh Isalaele, soki okozonga, zonga epai na Ngai, » elobi Yawe, « soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ;
2 and if you swear, 'As our Father lives,' in truth, in justice, and in righteousness, then the nations will bless themselves in him, and in him they will glory." soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo : ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »
3 For this is what our Father says to the people of Judah and to Jerusalem: Break up your unplowed ground, and do not sow among thorns. Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokata bilanga ya sika, mpe botika kolona kati na banzube.
4 Circumcise yourselves to our Father; remove the foreskin of your hearts, people of Judah and inhabitants of Jerusalem—or my wrath will break out like fire and burn with no one to quench it, because of the evil of your deeds. Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala ; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.
5 "Declare it in Judah, proclaim it in Jerusalem, and say: 'Blow the trumpet throughout the land!' Cry out and say: 'Gather together, and let us flee to the fortified cities!' Bopanza sango na mokili ya Yuda, botatola na Yelusalemi mpe boloba : ‹ Bobeta kelelo na mokili ! › Boganga makasi mpe bobelela : ‹ Bosangana, bino nyonso ! Tokima na bingumba batonga makasi ! ›
6 Raise a signal toward Zion! Flee for safety, do not delay! For I am bringing disaster from the north, a great destruction." Botombola bendele mpo na kokende na Siona ! Bobombama noki, pamba te nakoyeisa pasi wuta na nor mpe kobebisama ya somo ! »
7 A lion has come up from his thicket; a destroyer of nations is on the move. He has left his place to make your land a wasteland; your cities will fall to ruins, with no one left living in them. Nkosi moko ebimi na ndako na yango ; mobebisi moko ya bikolo abimi. Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo. Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te.
8 So put on mourning clothes, lament and wail, for the fierce anger of our Father has not turned away from us. Yango wana, bolata bilamba ya basaki, bosala matanga mpe bolela, pamba te kanda makasi ya Yawe elongwe na mito na biso te.
9 "In that day," declares our Father, "the king and his officials will lose their courage; the priests will be appalled, and the prophets astounded." « Na mokolo wana, » elobi Yawe, « mokonzi mpe bakalaka na ye bakolemba nzoto, Banganga-Nzambe bakoyoka somo mpe basakoli bakokamwa. »
10 Then I said, "Ah, Sovereign Father! You completely deceived this people and Jerusalem: 'Peace will be yours'—while the sword reaches our throat." Bongo nalobaki : « Oh Nkolo Yawe, tala ndenge okosaki bato oyo mpe Yelusalemi tango olobaki : ‹ Bokozala na kimia ! › Nzokande mopanga ezalaki kozela biso. »
11 "Then this people and Jerusalem will be told: A scorching wind from bare desert heights blows toward my people's daughter—not to winnow, not to sift. Na tango wana, bakoloba na bato oyo mpe na Yelusalemi : « Wuta likolo ya bangomba oyo ezali kati na esobe, mopepe moko ya makasi ezali koya epai ya bato na ngai ; ezali koya te mpo na koyungola to mpo na kopetola.
12 A wind too strong for this comes at my command. Now I pronounce my judgments against them." Ezali mopepe moko ya makasi penza, pamba te ewuti epai na ngai. Sik’oyo, ngai moko nde nazali kosambisa bango. »
13 Look! The enemy advances like the clouds, his chariots like the whirlwind; his horses are swifter than eagles. How terrible for us—we are ruined! Tala ! Monguna azali koya na elulu lokola mapata, bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi ; mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu. Mawa na biso ! Tokufi na biso !
14 Jerusalem, wash the evil from your heart, that you may be saved. How long will your wicked thoughts stay within you? Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ?
15 For a voice declares it from Dan, proclaiming disaster from the hills of Ephraim. Mongongo moko ezali koyokana wuta na Dani, ezali kopanza sango ya pasi na bangomba ya Efrayimi.
16 Warn the nations, announce it to Jerusalem: "Besiegers are coming from a distant land; they raise their war cry against the cities of Judah. « Boloba yango na bikolo mpe botatola yango na Yelusalemi : ‹ Wuta na mboka mosika, mampinga ya banguna ezali koya, ezali koya na lokito mpo na kobundisa bingumba ya Yuda.
17 They surround her like watchmen guarding a field, because she has rebelled against me," declares our Father. Ezingeli Yelusalemi lokola bakengeli bilanga, pamba te etombokelaki Ngai, › » elobi Yawe.
18 Your ways and your deeds have brought this upon you. This is your doom, and how bitter it is, for it pierces to your very heart. « Etamboli mpe misala na yo moko nde ememelaki yo yango. Tala, etumbu na yo ezali bololo mpe ekosala pasi makasi na motema. »
19 My anguish, my anguish! I writhe in pain. Oh, the walls of my heart! My heart pounds within me; I cannot keep silent, for I have heard the sound of the trumpet, the alarm of war. Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh ! Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi, ezali koswa makasi kati na ngai, mpe nazali kokoka kokanga monoko te, pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.
20 Disaster upon disaster is announced, for the whole land is laid waste. In an instant my tents are destroyed, my tent coverings in a moment. Sango moko kaka ezali kotambola : libebi na libebi ; mokili mobimba ekufi. Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi, mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko.
21 How long must I see the battle flag and hear the sound of the trumpet? Kino tango nini nakomona bendele ya bitumba, mpe nakoyoka makelele ya bitumba ?
22 "For my people are foolish; they do not know me. They are senseless children, with no understanding. They are skilled in doing evil, but they do not know how to do good." « Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »
23 I looked at the earth, and it was formless and empty; and at the heavens, and their light was gone. Tango natalaki mabele, namonaki ete ezalaki kaka bongo-bongo mpe ezalaki ata na eloko moko te ; tango natalaki likolo, namonaki ete pole ezalaki lisusu te.
24 I looked at the mountains, and they were quaking; all the hills were swaying. Tango natalaki bangomba, namonaki yango koningana, bangomba nyonso ya mike ezalaki kobukana.
25 I looked, and there was no one at all; every bird of the sky had fled. Mpe tango natalaki malamu, namonaki lisusu ata moto moko te, mpe bandeke nyonso ya likolo ekimaki.
26 I looked, and the fruitful land was a desert; all its cities lay in ruins before our Father, before his fierce anger. Tango nakobaki kotala, namonaki ete mokili oyo ezalaki na mabele ya malamu ekomaki esobe ; bingumba na yango nyonso ebebisamaki liboso ya Yawe, na kanda makasi na Ye.
27 For this is what our Father says: The whole land will be desolate, yet I will not completely destroy it. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mokili mobimba ekobebisama, kasi nakobebisa yango nyonso te.
28 Because of this the earth will mourn and the heavens above grow dark, for I have spoken, I have decided; I will not relent, and I will not turn back from it. Yango wana, mokili ekozala na matanga ; mpe kuna na lola, likolo ekokoma mwindo pamba te nalobaki yango, mpe nakobongola maloba na Ngai te ; lokola nazwaki mokano, nakozonga lisusu sima te. »
29 At the noise of horsemen and archers every town flees. They flee into the thickets and climb up among the rocks; every town is abandoned, with no one living in them. Bato nyonso ya engumba bakimi, kaka na makelele ya basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpe oyo babundaka na matolotolo. Bamoko babombami na bazamba, bamosusu bakimi na madusu ya mabanga ya bangomba ; bingumba nyonso etikali lisusu na bato te, mpe ata moto moko te atikali kuna.
30 And you, devastated one, what are you doing, dressing yourself in scarlet, adorning yourself with ornaments of gold, painting your eyes? You make yourself beautiful in vain. Your lovers despise you; they want to kill you. Oh engumba ekufa, ozali kosala nini ? Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo ; otie bonzenga na miso na yo. Ozali komikomisa kitoko na pamba, bamakangu na yo bazali kotiola yo mpe bazali koluka koboma yo.
31 For I heard a cry like a woman in labor, anguish like one bearing her first child—the cry of the daughter of Zion, gasping for breath, stretching out her hands: "How terrible for me! I am dying before the killers." Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]