Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Roam through the streets of Jerusalem, look now and take note! Search her squares—if you can find one person, one who does justice and seeks truth, then I will pardon her. « Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.
2 Even when they say, 'As our Father lives,' they are swearing falsely." Atako balapaka ndayi na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndayi na bango ezalaka kaka ya lokuta. »
3 Our Father, do not your eyes look for faithfulness? You struck them, but they felt no pain; you consumed them, but they refused to take correction. They made their faces harder than rock; they refused to turn back. Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.
4 Then I said, 'These are only the poor; they are foolish, for they do not know the way of our Father, the just ways of their Father.' Namilobelaki : « Bato oyo bazali kaka bato pamba, bazangi mayele, mpo ete bayebi nzela ya Yawe te mpe bayebi malako ya Nzambe na bango te.
5 I will go to the great ones and speak to them, for they surely know the way of our Father, the just ways of their Father.' But they too, all of them, had broken the yoke; they had burst the bonds. Boye, nakokende epai ya bakambi na bango mpe nakoloba na bango, pamba te bango nde basengeli koyeba nzela ya Yawe mpe malako ya Nzambe na bango. » Kasi bango nyonso, na motema moko, babukaki ekangiseli mpe bakataki minyololo.
6 Therefore a lion from the forest will strike them, a wolf of the desert will ravage them. A leopard lies watching their cities; everyone who goes out from them will be torn to pieces—for their rebellions are many, their backslidings without number. Yango wana, nkosi moko ekobima wuta na zamba mpe ekoboma bango ; mbwa ya zamba ekobima wuta na esobe mpe ekopasola bango ; nkoyi moko ekovanda pene ya bingumba na bango mpo na koboma moto nyonso oyo akoluka kobima kuna, pamba te botomboki na bango ezali monene mpe lokuta na bango eleki mingi.
7 "Why should I pardon you? Your children have forsaken me and sworn by those who are no gods. I gave them their fill, yet they committed adultery and trooped to the houses of prostitutes. « Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo ? Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko oyo ezali ata banzambe te. Nakokisaki baposa na bango nyonso, kasi basalaki kaka ekobo mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.
8 They were like well-fed, lusty stallions, each one neighing for his neighbor's wife.' Ndenge mpunda ya mobali etambolaka-tambolaka soki ezali na posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mwasi, ndenge wana mpe moko na moko kati na bango alandaka-landaka mwasi ya moninga mpo na kosangisa na ye nzoto.
9 Should I not punish them for these things? declares our Father. Should I not bring justice on a nation such as this? Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? » elobi Yawe ? « Motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya lolenge oyo ?
10 Go up through her rows of vines and destroy, but do not make a full end; strip away her branches, for they are not our Father's. Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi mpe bobebisa yango ; kasi bobebisa yango nyonso te. Bokata bitape na yango, pamba te etikali lisusu ya Yawe te.
11 For the house of Israel and the house of Judah have been utterly faithless to me, declares our Father." Libota ya Isalaele mpe ya Yuda etamboli na boyengebene te na miso na Ngai, » elobi Yawe.
12 They have spoken falsely of our Father; they said, 'He will do nothing! No disaster will come upon us; we will not see sword or famine.' Bawanganaki Yawe mpe balobaki : « Yawe akosala eloko moko te ! Pasi moko te ekokomela biso ; tokotikala na biso komona te ezala mopanga to nzala makasi.
13 The prophets are only wind; the word is not in them. So let it be done to them! Basakoli bazali kaka lokola mopepe ya pamba, bazali na mateya penza ya koteya te ; boye tika ete mabe oyo bazali kosakola ezongela bango moko ! »
14 Therefore this is what the Father of heaven's armies says: Because you have spoken this word, I am making my words in your mouth a fire, and this people the wood, and it will consume them. Yango wana, tala liloba oyo Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Lokola bato oyo balobi maloba ya boye, nakosala ete maloba na Ngai ezala lokola moto na monoko na yo, mpe bato oyo bazala lokola bakoni oyo moto yango ekozikisa.
15 Look, I am bringing against you a nation from far away, O house of Israel, declares our Father—an enduring nation, an ancient nation, a nation whose language you do not know, whose speech you cannot understand. Oh libota ya Isalaele, » elobi Yawe, « nakoyeisa ekolo moko wuta mosika mpo na kobundisa yo : ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya, ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te.
16 "Their quiver is like an open grave; they are all mighty warriors. Makonga na bango ezangaka koboma moto te, bongo bango nyonso bazali bilombe ya bitumba.
17 They will devour your harvest and your bread; they will devour your sons and your daughters; they will devour your flocks and your herds; they will devour your vines and your fig trees. With the sword they will beat down your fortified cities in which you trust." Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.
18 Yet even in those days, declares our Father, I will not make a full end of you. Nzokande, ezala na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakosilisa koboma bino nyonso te.
19 When they ask, 'Why has our Father done all this to us?' tell them: 'As you abandoned me and served foreign gods in your land, so you'll serve strangers in a land not yours.' Tango bato bakotuna : ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye ? › Bokozongisela bango : ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›
20 "Announce this in the house of Jacob; proclaim it in Judah: Bopanza sango oyo epai ya libota ya Jakobi mpe botatola yango kati na Yuda :
21 Hear this, O foolish and senseless people, who have eyes but do not see, who have ears but do not hear:" Boyoka makambo oyo, bino bazoba to bato oyo bozanga mayele : bozali na miso mpo na komona kasi bomonaka te, bozali na matoyi mpo na koyoka kasi boyokaka te.
22 Do you not fear me? declares our Father. Do you not tremble before me? I placed the sand as a boundary for the sea, an everlasting decree it cannot pass. Though the waves toss, they cannot prevail; though they roar, they cannot cross it. Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.
23 But this people has a stubborn and rebellious heart; they have turned aside and gone their own way. Kasi bato oyo bazali mitema makasi mpe bazali solo batomboki ; bapesi Ngai mokongo mpe bakei na bango !
24 They do not say in their hearts, 'Let us fear our Father, who gives the rain—the autumn and the spring rain in its season—who keeps for us the appointed weeks of the harvest.' Bamilobelaka te : ‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso, oyo anokisaka mvula na tango ekoki, na eleko ya kolona mpe ya kobuka ; oyo akatela biso baposo oyo esengeli mpo na kobuka milona. ›
25 "Your wrongdoings have turned these blessings away, and your sins have withheld the good from you. Mabe na bino nde ebebisi makambo nyonso, mpe masumu na bino ezangisi bino bolamu.
26 For among my people are found wicked men; they lurk like fowlers lying in wait; they set a trap, and it is people they catch. Kati na bato na Ngai, ezali na bato mabe oyo banongaka bato lokola moto oyo azali kotia mitambo mpo na kokanga bandeke, mpe batiaka mitambo mpo na kokanga bato.
27 Like a cage full of birds, their houses are full of deceit; therefore they have grown great and rich. Ndenge ndako ya bandeke etondaka na bandeke, ndenge wana mpe bandako na bango etonda na lokuta ; mpe ezali na nzela yango nde bakoma bazwi mpe bato na nguya.
28 They have grown fat and sleek; they overflow with evil deeds. They do not defend the cause of the fatherless, that they might prosper, and the rights of the needy they do not uphold." Bakoma kitoko mpe ngebungebu ; mabe na bango eleka ndelo, balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te, mpo kaka bango moko balonga. Bakataka makambo ya babola na bosembo te.
29 Should I not punish them for these things? declares our Father. Should I not bring justice on a nation such as this? Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? » elobi Yawe. « Boni, motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya boye ?
30 "An appalling and horrible thing has happened in the land: Makambo ya kokamwa mpe ya somo esalemi na mboka :
31 the prophets prophesy falsely, and the priests rule by their own authority; and my people love it so. But what will you do when the end comes?" basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]