Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Run for safety, you children of Benjamin, out of Jerusalem! Blow the trumpet in Tekoa, and raise a signal over Beth-haccherem, for disaster looms out of the north, a great destruction. « Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.
2 The lovely and delicate daughter of Zion—I will destroy her. Nakobebisa Siona, mboka kitoko, oyo ezali penza kitoko lokola elenge mwasi ya kitoko mpe ya nzoto sembesembe.
3 Shepherds and their flocks will come against her; they will pitch their tents around her, each grazing his own portion." Babateli ya bibwele elongo na bibwele na bango bakobundisa yango, bakopika bandako na bango ya kapo zingazinga na yango ; bongo moko na moko akoyeisa bibwele na ye na esika oyo ye akozwa.
4 Prepare for battle against her! Come, let us attack at noon! But woe to us, for the day is fading and the evening shadows are growing long. Bomibongisa mpo na kobundisa yango ! Botelema, tika ete tobundisa yango na midi ! Kasi mawa na biso, pamba te mokolo esili mpe molili ya pokwa ezali koya.
5 Come, let us attack by night and destroy her fortresses! Boye, totelema ! Tika ete tokota kati na yango na butu, tobebisa bandako na yango oyo batonga makasi ! »
6 For the Father of heaven's armies says: Cut down her trees and build a siege ramp against Jerusalem. This city must be punished; there is nothing but oppression within her. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombama zingazinga ya Yelusalemi ! Engumba oyo esengeli kozwa etumbu, pamba te etondi na makambo mabe !
7 "As a well keeps its water fresh, so she keeps her wickedness fresh. Violence and destruction resound within her; sickness and wounds are always before me. Ndenge libulu ya mayi ebimisaka mayi, ndenge wana mpe Yelusalemi ezali kobimisa mabe. Sango moko kaka ezali kotambola kuna : sango ya mobulu mpe ya kobebisama ; tango nyonso liboso na Ngai, kaka minyoko mpe bapota.
8 Take warning, Jerusalem, or I will turn away from you in disgust and make you a desolation, a land where no one lives." Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, noki te nakomikomisa mosika na yo mpe nakokomisa mokili na yo esobe, mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »
9 The Father of heaven's armies says: They will glean the remnant of Israel as thoroughly as a vine is gleaned. Pass your hand over the branches again, like one gathering grapes. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Tika ete bosangisa ndambo ya bana ya Isalaele oyo batikali ndenge balokotaka mbuma ya vino oyo etikalaka ; bolekisa lisusu maboko na bino na likolo ya bitape ya banzete ya vino lokola moto oyo abukaka mbuma ya vino. »
10 "To whom can I speak and give warning, that they will listen? Their ears are closed, so they cannot hear. The word of our Father is offensive to them; they take no delight in it. Naloba lisusu na nani mpe nakebisa penza nani ? Nani akoyokela ngai ? Matoyi na bango ekangama ; yango wana bakokaka koyoka te. Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango, basepelaka na bango na yango te.
11 But I am full of the wrath of our Father; I am weary of holding it in. Pour it out on the children in the street, on the young men gathered together; both husband and wife will be taken, the old and the very aged." Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. « Sopa yango na bana mike kati na babalabala mpe na lisanga ya bilenge mibali ; ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, ezala mikolo to mibange.
12 Their houses will be turned over to others, their fields and wives together, for I will stretch out my hand against those who live in the land, declares our Father. Tango nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bavandi ya mboka, nakopesa bandako na bango, bilanga na bango mpe basi na bango, epai ya bato mosusu, » elobi Yawe.
13 For from the least to the greatest, all are greedy for unjust gain; from prophet to priest, all practice deceit. « Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike, batondi na lokoso ya mbongo, kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe : bango nyonso bazali kotambola na lokuta.
14 They dress the wound of my people as though it were not serious. 'Peace, peace,' they say, when there is no peace. Bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba : ‹ Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu ! › Nzokande ata likambo moko ya malamu ezali te.
15 Were they ashamed of their detestable conduct? No, they had no shame at all; they did not even know how to blush. So they will fall among the fallen; they will be brought down when I punish them, says our Father. Boni, bazali penza koyokela makambo na bango ya nkele soni te ? Te, bazali na bango koyoka ata soni te ; bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te. Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.
16 This is what our Father says: Stand at the crossroads and look; ask for the ancient paths, where the good way is, and walk in it, and you will find rest for your souls. But they said, 'We will not walk in it.' Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
17 I appointed watchmen over you and said, 'Listen to the sound of the trumpet!' But they said, 'We will not listen.' Naponaki kati na bino bakengeli oyo balobaki na bino : ‹ Boyoka mongongo ya kelelo ! › Kasi bozongisaki : ‹ Te ! Tokoyoka te. ›
18 "Therefore hear, you nations; take note, you witnesses, what will happen to them. Yango wana, bino bikolo, boyoka ! Bozala batatoli ya makambo oyo ekokomela bango.
19 Listen, earth: I am bringing disaster on this people, the fruit of their own schemes, because they have not listened to my words and have rejected my instruction. Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.
20 What do I care about incense from Sheba or sweet cane from a distant land? Your burnt offerings are not acceptable; your sacrifices do not please me." Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba to na matiti ya solo kitoko oyo ewuti na mboka ya mosika ? Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, mpe nandimaka makabo na bino te. »
21 Therefore this is what our Father says: I will put obstacles before this people. Parents and children alike will stumble over them; neighbors and friends will perish. Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotia mabaku liboso ya bato oyo ; batata mpe bana na bango bakobeta mabaku mpe bakokweya nzela moko, bazalani elongo na baninga bakokufa. »
22 This is what our Father says: Look, an army is coming from the land of the north; a great nation is stirring from the ends of the earth. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya longwa na mokili ya nor ; ekolo moko monene ezali komibongisa mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele.
23 They grasp bow and spear; they are cruel and show no mercy. Their sound roars like the sea as they ride on horseback, drawn up in battle formation against you, daughter of Zion. Basimbi matolotolo mpe makonga, bazali mitema mabe mpe bazanga mawa, bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, bamati likolo ya bampunda, batandami na milongo lokola basoda mpo na kobundisa yo Siona, mboka kitoko. »
24 We have heard the report of them, and our hands hang limp. Anguish has gripped us, pain like that of a woman in labor. Tango toyokaki sango na tina na bango, tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
25 Do not go out to the fields or walk on the roads, for the enemy has a sword, and terror is on every side. Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te, pamba te monguna asimbi mopanga, bongo somo makasi ezali bisika nyonso.
26 Daughter of my people, put on mourning clothes and roll in ashes; mourn with bitter wailing as for an only son, for suddenly the destroyer will come upon us. Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basaki mpe bolala na putulu, bosala matanga lokola moto oyo akufisi mwana na ye se moko. Bolela na mawa, pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata.
27 "I have made you a tester of metals among my people, so that you may observe and test their ways. « Tala, nasili kotia yo kati na bato na ngai lokola esalelo oyo bamekelaka makasi ya bibende, mpo ete okoka kotala malamu mpe omeka ezaleli na bango.
28 They are all hardened rebels, going around spreading slander. They are bronze and iron; all of them act corruptly. Bango nyonso bazali batomboki ya mito makasi, bayebi kaka kotonga. Bazali lokola bronze mpe ebende, bango nyonso bazali kaka babebisi.
29 The bellows blow fiercely to burn away the lead with fire, but the refining is useless; the wicked are not removed. Epepelo ezali kopelisa moto makasi, mpe ebende oyo babengaka plon ezali kolimwa na moto ; kasi bazali na bango kaka konyangwisa ebende yango na pamba, pamba te eloko ya mabe ekokabwana na yango te.
30 They are called rejected silver, because our Father has rejected them." Babengaka bango palata babwaka, pamba te Yawe asundola bango. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]