Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word that came to Jeremiah from our Father: Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi :
2 Stand at the gate of our Father's house and proclaim there: Hear the word of our Father, all Judah who enter these gates to worship him. « Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo : ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe.
3 This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: Change your ways and your deeds, and I will let you live in this place. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bobongola bizaleli mpe misala na bino, mpe Ngai nakotika bino ete bowumela na esika oyo.
4 Don't trust these deceptive words: 'our Father's temple! our Father's temple! our Father's temple!' Botia motema te na maloba ya lokuta oyo ezali kolobama : ‘ Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe ! Yawe azali awa. ’
5 If you truly change your ways and deeds, and truly deal justly with one another, Soki solo bobongoli bizaleli mpe misala na bino mpe bokomi kokata bino na bino makambo na bosembo ;
6 if you do not oppress the foreigner, the orphan, or the widow, or shed innocent blood in this place, and do not follow other gods to your own harm, soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi,
7 then I will let you live in this place, the land I gave your ancestors long ago, forever. nakotika bino ete bowumela na esika oyo, kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino wuta kala mpe mpo na libela.
8 But look—you are trusting in deceptive words that are worth nothing. Kasi botala ndenge bozali kotia motema na maloba ya lokuta oyo ezali ata na litomba moko te.
9 Will you steal, murder, commit adultery, swear falsely, make offerings to Baal, follow other gods you've not known, Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ;
10 then come stand before me in this house that bears my name and say, 'We are safe!'—only to keep doing all these detestable things? bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba : ‘ Tobiki na biso ! ’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele ?
11 Has this house that bears my name become a den of robbers in your eyes? I myself have seen it, declares our Father. Boni, bokomisi Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai ekimelo ya miyibi ? Ngai nazali komona ete bozali kozwa yango bongo, elobi Yawe.
12 Now go to my place that was in Shiloh, where I first set my name, and see what I did to it because of the evil of my people Israel. Eleki malamu bokende nanu na Silo epai wapi natiaki liboso Esika na Ngai ya bule mpe botala makambo oyo nasalaki kuna mpo na mabe ya bana ya Isalaele.
13 Now, because you did all this, declares our Father—I spoke to you again and again but you did not listen, called you but you did not answer, Lokola nazalaki kokebisa bino mbala na mbala tango bozalaki kosala makambo oyo nyonso, elobi Yawe, kasi botikalaki koyokela Ngai te ; lokola nabengaki bino, kasi boyanolaki Ngai te,
14 so I will do to the house called by my name, which you trust in, and to the place I gave you and your ancestors, as I did to Shiloh. makambo oyo nasalaki na Silo, nakosala yango mpe sik’oyo na Ndako na Ngai, na Tempelo oyo bozali kotiela motema, esika oyo napesaki bino elongo na batata na bino.
15 I will throw you out of my sight, as I threw out all your relatives, all Ephraim's children. Nakobwaka bino mosika na Ngai ndenge nabwakaki bandeko na bino nyonso ya Efrayimi. ›
16 You—do not pray for this people; raise no cry or prayer for them; do not plead with me, for I will not listen to you. Bongo yo Jeremi, komeka kobondela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango ata moke te, komeka kutu te kosengela bango eloko : kotungisa Ngai te, pamba te nakotikala koyokela yo te.
17 Don't you see what they're doing in Judah's cities and Jerusalem's streets? Boni, ozali komona te makambo oyo bazali kosala kati na bingumba ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ?
18 Children gather wood, fathers light fire, women knead dough to make cakes for the queen of heaven; they pour drink offerings to other gods to anger me. Bana bazali kolokota bakoni, batata bazali kopelisa moto, mpe basi bazali kosangisa farine mpo na kosala mapa mpo na Ishitari ; bazali kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe mosusu, bongo ezali kopesa Ngai kanda.
19 But am I the one they provoke? declares our Father. Is it not themselves, to their own shame? Boni, bakanisi ete bazali kosala Ngai mabe, etuni Yawe ? Te ! Bazali nde komisala bango moko mabe, mpo na soni na bango moko.
20 So the Sovereign Father says: my anger and rage will pour out on this place—on people and animals, on the field's trees and the ground's fruit—burning, never put out. ‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele : kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te.
21 This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: Add your burnt offerings to your other sacrifices and eat the meat yourselves! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bokoba kaka na makambo oyo bozali kosala, bobakisa mbeka na bino ya kotumba mpe makabo mosusu, mpe bolia misuni yango bino moko !
22 For on the day I brought your ancestors out of the land of Egypt, I did not merely speak to them or command them about burnt offerings and sacrifices. Pamba te, tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito, nalobaki na bango likambo moko te na oyo etali mbeka ya kotumba mpe makabo mosusu.
23 This is what I commanded them: Obey my voice, and I will be your Father and you will be my children. Walk fully in the way I command you, so it may go well with you. Nzokande, napesaki bango kaka mobeko oyo : Botosa Ngai, bongo Ngai nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na Ngai ; botambola na nzela nyonso oyo nakolakisa bino mpo ete bozala bato ya esengo.
24 But they did not listen or turn an ear; they walked by their own plans, their evil hearts stubborn, and went backward, not forward. Kasi batiaki matoyi te mpo na koyoka Ngai ; balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Boye, na esika ete babonga, babebaki lisusu koleka.
25 From the day your ancestors left Egypt until now, I sent you all my servants the prophets, again and again, day after day. Wuta tango batata na bino babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo, natindelaka bino basali na Ngai, basakoli, tango nyonso mpe mikolo nyonso.
26 Yet they did not listen to me or pay attention, but were stubborn and did worse than their ancestors. Kasi bayokaki Ngai te mpe bapesaki Ngai matoyi na bango te ; bazalaki kaka mito makasi mpe basalaki lisusu mabe koleka bakoko na bango. ›
27 You will speak all these words to them, but they will not listen to you; you will call to them, but they will not answer you. Ata oyebisi bango makambo oyo nyonso, bakotikala koyoka yo te ; ata mpe obengi bango, bakoyanola te.
28 Say to them: This is the nation that did not obey the voice of our Father or accept correction; truth has vanished, cut off from their lips. Yango wana, loba na bango : ‹ Tala ekolo oyo eyokaka te maloba ya Yawe, Nzambe na yango, mpe eyokaka pamela te ; solo ezali lisusu te na minoko na bango mpe elimwe penza na bibebu na bango.
29 Cut off your hair and throw it away; wail on the bare heights, for our Father has rejected and abandoned the generation of his anger. Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye.
30 Judah has done evil in my sight, declares our Father. They set their detestable idols in the house that bears my name, making it unclean. Bato ya Yuda basali mabe na miso na Ngai, elobi Yawe, batie banzambe na bango ya bikeko ya mbindo kati na Ndako na Ngai mpe bakomisi Ndako na Ngai mbindo.
31 They built Topheth's high places in the Valley of Ben-Hinnom to burn their sons and daughters in the fire—which I never commanded, and it never entered my mind. Batongi bisambelo ya likolo ya bangomba, ya Tofeti, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo ete batumba bana na bango ya mibali mpe ya basi mpo na kobonza bango lokola mbeka : nzokande wana ezali likambo oyo Ngai natindaki bango te mpe natikalaki ata kokanisa yango te.
32 So the days are coming, declares our Father, when it will no longer be called Topheth or the Valley of Ben-Hinnom, but the Valley of Slaughter; they will bury in Topheth until no room is left. Yango wana, bosala keba, elobi Yawe : na mikolo ekoya, bato bakobenga lisusu te esika oyo Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, kasi bakobenga yango lubwaku oyo babomelaka bato, pamba te bakokunda bato na Tofeti kino tango esika ekotikala lisusu te.
33 This people's dead bodies will feed the birds of the sky and the animals of the earth, with no one to scare them off. Bongo bibembe ya bato oyo ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba ; mpe moto moko te akobengana yango.
34 I will silence in the cities of Judah and the streets of Jerusalem the sound of joy and rejoicing, the voice of bridegroom and bride, for the land will become a wasteland. Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]