Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "At that time,' declares our Father, 'they will remove the bones of Judah's kings, officials, priests, prophets, and Jerusalem's people from their graves. Na tango wana, elobi Yawe, bakobimisa mikuwa ya bakonzi mpe ya bakalaka ya Yuda, mikuwa ya Banganga-Nzambe mpe ya basakoli elongo na mikuwa ya bato ya Yelusalemi, wuta na malita na bango.
2 They will be spread before sun, moon, and all heaven's host they loved, served, followed, consulted, and worshiped—ungathered, unburied, manure on the ground. Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.
3 All the remnant of this evil family, wherever I have driven them, will choose death over life,' declares the Father of heaven's armies. Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›
4 "Tell them, 'This is what our Father says: If people fall, don't they rise? If someone turns away, doesn't he return? Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Boni, soki moto akweyi, atelemaka te ? Soki moto abungi nzela, azongaka lisusu na nzela te ?
5 Why then has this people, Jerusalem, turned away in perpetual backsliding? They cling to deceit; they refuse to return.' Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela ? Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe ? Bamipesi makasi na makambo ya lokuta mpe baboyi kozongela Ngai.
6 I have listened closely, but they do not speak what is right. No one turns from his evil, asking, 'What have I done?' Each one runs his own course, like a horse charging into battle. Nayokaka na bokebi makambo nyonso oyo balobaka, kasi balobaka makambo ya solo te. Moko te kati na bango ayokaka motema pasi mpo na mabe oyo asalaka, alobaka : ‘ Nasali nini ? ’ Moto na moto akangamaka kaka na nzela na ye lokola mpunda oyo ezali kokende na bitumba.
7 Even the stork in the sky knows her appointed seasons, and the turtledove, the swift, and the crane keep the time of their coming. But my people do not know the just ways of their Father. Ezala kutu nkongi, kati na likolo, eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ; ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila eyebaka ata tango ya kozonga, kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.
8 How can you say, 'We are wise, and the law of our Father is with us,' when in fact the lying pen of the scribes has turned it into a lie? Ndenge nini bokoki koloba : ‘ Tozali bato ya bwanya, pamba te toyebi Mobeko ya Yawe, ’ tango sik’oyo ekomeli ya balakisi ya Mobeko ebongoli yango lokuta ?
9 The wise will be put to shame; they will be dismayed and trapped. Look, they have rejected my word, so what wisdom is left in them? Bato ya bwanya bakoyokisama soni, bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu, pamba te batiolaki Liloba na Yawe. Bazali na bwanya ya ndenge nini ?
10 Therefore I will give their wives to others and their fields to new owners. For from the least to the greatest, everyone is greedy for unjust gain; from prophet to priest, everyone practices deceit.' Yango wana, nakokaba basi na bango epai ya mibali mosusu, mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu ; pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike, batondi na lokoso ya mbongo ; basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomi se kotambola na lokuta ;
11 They dress the wound of the daughter of my people as though it were nothing, saying, 'Peace, peace,' when there is no peace. bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba : ‘ Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu ! ’ Nzokande, ata likambo moko ya malamu ezali te.
12 Were they ashamed of the detestable things they did? No, they felt no shame at all; they did not even know how to blush. So they will fall among the fallen; when I deal with them, they will be brought down,' says our Father. Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ? Te ! Bazali koyoka ata soni te ; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni ! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.
13 'I will surely gather them in,' declares our Father. 'There will be no grapes on the vine, no figs on the fig tree, and the leaves will wither; what I gave them will pass away from them.' Nakobebisa milona na bango, elobi Yawe. Bambuma ya vino ekozala lisusu te na banzete ya vino, mbuma ya figi ekozala lisusu te na banzete ya figi, mpe makasa ya banzete yango ekokawuka. Bakobotola bango biloko oyo napesaki bango. › »
14 "Why are we sitting here? Gather together! Let us flee to the fortified cities and perish there, for our Father has doomed us to perish and has given us poisoned water to drink, because we have sinned against him." Mpo na nini tozali kovanda awa ? Tosangana esika moko ! Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi mpo ete tokufela kuna ! Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.
15 We hoped for peace, but no good has come; for a time of healing, but instead there is terror. Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia, kasi tomoni likambo moko te ya malamu ; tozalaki na elikya ete tokobika, kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso !
16 The snorting of the enemy's horses is heard from Dan; at the sound of the neighing of their stallions the whole land trembles. They come and devour the land and everything in it, the city and all who live there. Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.
17 "For look, I am sending venomous snakes among you, vipers that cannot be charmed, and they will bite you," declares our Father. « Botala, nakotindela bino banyoka oyo ebomaka, bitupa oyo moto akoki kosakana na yango te, mpo ete eswa bino, » elobi Yawe.
18 My joy is gone, grief overwhelms me; my heart is sick within me. Pasi na ngai ezangeli kisi mpo na kosilisa yango, motema na ngai elembi kati na ngai.
19 Listen—the cry of the daughter of my people from a land far away: "Is our Father not in Zion? Is her King no longer in her?" "Why have they provoked me to anger with their carved images, with their worthless foreign idols? Yoka koganga ya bato na ngai wuta na mokili ya mosika : « Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona ? Mokonzi na yango azali lisusu kuna te ? » « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai na nzela ya banzambe na bango ya bikeko, na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina ? »
20 The harvest is past, the summer has ended, and we are not saved." « Tango ya kobuka mbuma esili koleka, elanga mpe esili kokoma na suka, kasi biso tobikisami te. »
21 For the wound of the daughter of my people I am crushed; I mourn, and horror grips me. Ndenge bato na ngai bazali koyoka pasi, ndenge wana mpe ngai nazali koyoka pasi, nazali kolela, mpe somo ekangi ngai makasi.
22 Is there no balm in Gilead? Is there no physician there? Why then has the healing of the daughter of my people not come? Boni, kisi ezali te kati na Galadi ? Minganga bazali kuna te ? Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]