Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
8:23 Oh, that my head were a spring of water and my eyes a fountain of tears, that I might weep day and night for the slain of the daughter of my people! Ah ! Soki moto na ngai ezalaki etima, mpe soki miso na ngai ezalaki liziba ya mpinzoli, nalingaki kolela butu mpe moyi mpo na bato na ngai, oyo basili koboma.
1 Oh, that I had in the wilderness a traveler's lodging, that I might leave my people and go away from them! For they are all adulterers, a band of traitors. Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
2 They bend their tongue like a bow; falsehood, not faithfulness, has grown strong in the land. They go from evil to evil, and they do not know me, declares our Father. « Babongisaka lolemo na bango lokola tolotolo mpo na kokosa ; balongaka kati na mokili na nzela ya solo te, pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe.
3 Let everyone beware of his neighbor, and put no trust in any brother; for every brother is a deceiver, and every neighbor goes about slandering. « Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye mpe atia motema te na ndeko na ye, pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.
4 Everyone deceives his neighbor, and no one speaks the truth; they have trained their tongues to speak lies, wearing themselves out with wrongdoing. Moninga azali kokosa moninga na ye, mpe moto moko te azali koloba solo. Bamibongisaka mpo na koloba lokuta, babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu.
5 You live in the midst of deceit; through their deceit they refuse to know me, declares our Father. Mosala na bango se kokosa na kokosa ; mpe na lokuta na bango, baboyaka kotosa Ngai, » elobi Yawe.
6 Therefore this is what the Father of heaven's armies says: I am about to refine them and test them, for how else should I act, because of the daughter of my people? Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Tala, nakopetola mpe nakomeka bango na moto, pamba te nasala lisusu nini mpo na masumu ya bato na Ngai ?
7 Their tongue is a deadly arrow; it speaks deceit. With his mouth each one speaks peace to his neighbor, but in his heart he sets an ambush for him. Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka, ebimisaka kaka maloba ya lokuta. Moto na moto alobaka na moninga na ye na esengo na monoko ; kasi na se ya motema, atielaka ye motambo.
8 Should I not punish them for these things? declares our Father. Should I not bring justice upon a nation such as this? Bongo na makambo ya boye, napesa bango etumbu te, » elobi Yawe ? « Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye ? »
9 "I will weep and wail for the mountains, and raise a lament for the pastures of the wilderness, for they are laid waste so that no one passes through, and the lowing of cattle is not heard. From the birds of the sky to the beasts, all have fled and gone. Nakosala matanga mpe nakolela mpo na bangomba mpe matiti ya esobe. Nyonso esili kokawuka mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana ; ezala makelele ya bibwele to ya bandeke ezali lisusu koyokana te ; bandeke ya likolo ekimi mpe banyama ya zamba esili kokende.
10 I will make Jerusalem a heap of ruins, a lair of jackals; and I will make the cities of Judah a desolation, without inhabitant." « Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba ; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.
11 Who is wise enough to grasp this? To whom has our Father's mouth spoken, to explain why the land is ruined, scorched like a wilderness, with no one crossing it? Nani azali penza na bwanya mpo na kososola makambo ya boye ? Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ? Mpo na nini mokili ebebisami, etikali pamba lokola esobe epai wapi moto alekaka te ? »
12 And our Father says: Because they abandoned my instruction, which I gave them, and did not obey my voice or walk in it, Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.
13 but have stubbornly followed their own hearts and gone after the Baals, as their fathers taught them. Nzokande, batiaki kaka mito makasi mpe bakobaki kolanda banzambe ya Bala oyo batata na bango balakisaki bango. »
14 So the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: I will feed this people bitter food and give them poisoned water to drink. Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tala, nakoleisa bato oyo matiti ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge.
15 I will scatter them among nations they and their fathers never knew, and send a sword after them until I destroy them. Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te ; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »
16 This is what the Father of heaven's armies says: Consider! Call for the women skilled in mourning; send for those practiced in lament. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Botala malamu makambo oyo ! Bobengisa basi oyo balelaka bibembe, bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu !
17 Let them hurry and raise a wailing over us, that our eyes may run with tears and our eyelids stream with water. Tika ete baya noki mpo ete bayembela biso banzembo ya mawa kino tango mpinzoli ekobima biso mpe ekotondisa miso na biso.
18 For a sound of wailing is heard from Zion: How we are ruined! We are utterly ashamed, for we have left the land, for they have torn down our dwellings. Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona : ‹ Ah ! Tala ndenge nini tosili kobebisama ! Tala ndenge nini tosambwe ! Tika ete tokima mokili na biso, pamba te bandako na biso ebebisami. › »
19 Now hear the word of our Father, you women; let your ears receive the word of his mouth. Teach your daughters a wailing, and each one her neighbor a lament. Eh basi, boyoka Liloba na Yawe ! Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye. Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa mpe tika ete moko na moko ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.
20 For death has climbed in through our windows; it has entered our palaces, cutting off the children from the streets and the young men from the squares. Kufa emati mpe ekoti na nzela ya maninisa na biso, ekoti kino na bandako na biso, oyo batonga makasi ; eyei kosilisa koboma bana na babalabala, mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka.
21 Speak: This is what our Father declares: The dead bodies of people will fall like manure on the open field, like bundles of grain left behind the harvester, with no one to gather them. Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »
22 This is what our Father says: Let not the wise boast in his wisdom, let not the strong boast in his strength, let not the rich boast in his riches; Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika ete moto ya bwanya amikumisa te mpo na bwanya na ye to moto ya makasi mpo na makasi na ye to moto ya bozwi mpo na bozwi na ye.
23 but let the one who boasts boast in this: that he understands and knows me—that I am your Father, who acts with faithful love, justice, and righteousness on the earth; for in these things I delight, declares our Father. Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili ; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe.
24 Look, the days are coming, declares our Father, when I will punish all who are circumcised only in the flesh. « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te :
25 Egypt, Judah, Edom, the sons of Ammon, Moab, and all who clip the hair at their temples and live in the desert. For all these nations are uncircumcised, and all the house of Israel are hard-hearted. bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu ; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]