Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 56 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Lobiko mpo na bikolo mosusu

1Tala liloba oyo Yawe alobi :« Botambola na alima mpe bosala kolanda bosembo,pamba te lobiko na Ngai ekomi penempe bosembo na Ngai ekomi pene ya komonisama.

2Esengo na moto oyo asalaka bongo,oyo akangamaka na yango,oyo abatelaka mokolo ya Sabampe abebisaka te bosantu na yango,mpe oyo abatelaka loboko na yeete esala mabe te ! »

3Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te :« Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! »Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te :« Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! »

4Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi :« Mpo na basoda oyo baboma bango mikongo,oyo babatelaka mokolo na Ngai ya Saba,oyo baponaka makambo oyo esepelisaka Ngai,mpe bakangamaka na boyokani na Ngai :

5nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango,ekaniseli oyo ezali na kombo :ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi.Nakopesa bango kombo ya libela,oyo bakoki kolongola te.

6Bapaya oyo bakangami na Yawempo na kosalela Ye,mpo na kolinga Kombo na Yempe kogumbamela Ye,bato nyonso oyo bakobatela mokolo ya Sabampe bakobebisa te bosantu na yango,mpe bato oyo bakokangama na boyokani na Ngai ;

7nakomema bango na ngomba na Ngai ya bulempe nakopesa bango esengokati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai.Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bangoekondimama na etumbelo na Ngai,pamba te Ndako na Ngai ekobengamaNdako ya losambo mpo na bikolo nyonso. »

8Nkolo Yawe oyo asangisi bawumbu ya Isalaele alobi :« Nakosangisa lisusu bato mosusu elongo na bango,esika moko na bato oyo nasilaki kosangisa. »

Pamela ya Nzambe mpo na bato mabe

9Bino banyama nyonso ya esobe, boya ;bino banyama nyonso ya zamba, boya kolia !

10Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso,bango nyonso bazangi mayele ;bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te,bakokaka koganga te,mosala na bango kolala mpe kolota bandoto,balingi pongi makasi.

11Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te.Bazali babateli oyo bazangi bososoli,moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye mokompe alukaka kaka bolamu na ye moko.

12Moko na moko alobaka :« Yaka ! Tika ete nakamata vinompo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga !Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo,masanga ya komela ezali nanu ebele ! »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]