Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 15 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Maloba ya kosambisa Moabi

1Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi :Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki,Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki,solo, ebebisamaki kaka na butu moko !Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ;solo, ebebisamaki kaka na butu moko !

2Bato ya Diboni bazali komatana bisika na bango ya bule,na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba,mpo na kolela ;Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba.Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.

3Balati-lati basaki na babalabala,bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandakompe na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;bazali penza kosopa mpinzoli ebele.

4Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi,mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi ;yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe kogangampe mitema na bango ebukani.

5Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi,banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari,kino na Egilati-Shelishiya ;bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ;mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matangampo na kobebisama na bango.

6Mayi ya Nimirimi ekawuki,bongo matiti mpe esili kokawuka,matiti ya mobesu eziki-ziki nyonsompe matiti ya kitoko ezali lisusu te.

7Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwakimpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.

8Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi ;koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi,mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi.

9Mayi ya Dimoni etondi na makila,kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni :nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]