Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A shoot will come up from the stump of Jesse; from his roots a Branch will bear fruit. Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi ; wuta na misisa na ye, Etape moko ekobota mbuma.
2 The Spirit of our Father will rest on him—the Spirit of wisdom and understanding, the Spirit of counsel and might, the Spirit of knowledge and the fear of our Father, Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye : Molimo ya bwanya mpe ya mayele, Molimo ya toli mpe ya nguya, Molimo ya boyebi mpe ya kotosa Yawe ;
3 and he will delight in the fear of our Father. He will not judge by what his eyes see, or decide by what his ears hear, esengo na ye ekozala na kotosa Yawe. Akokata makambo ndenge emonanaka na libanda te to mpe akozwa mikano te kolanda biyoka-yoka ;
4 but with righteousness he will judge the poor, and decide with equity for the meek of the earth. He will strike the earth with the rod of his mouth, and with the breath of his lips he will slay the wicked. kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.
5 Righteousness will be the belt around his waist, and faithfulness the sash around his hips. Bosembo ekozala mokaba na ye, mpe boyengebene ekozala na loketo na ye lokola mokaba oyo bamemelaka bibundeli.
6 The wolf will live with the lamb, the leopard will lie down with the goat, the calf and the lion and the fattened beast together—and a little child will lead them. Mbwa ya zamba ekovanda esika moko na mwana meme, nkoyi ekolala esika moko na mwana ntaba ; mwana ngombe ya mobali, mwana nkosi mpe banyama ya mafuta ekolia esika moko, bongo mwana moke nde akoyeisa yango.
7 The cow and the bear will graze, their young will lie down together, and the lion will eat straw like the ox. Ngombe ya mwasi mpe ngombolo ekolia esika moko, bana na yango mpe ekolala esika moko, bongo nkosi ekolia matiti lokola ngombe.
8 The nursing child will play over the cobra's hole, and the weaned child will put his hand on the viper's den. Mwana moke akosakana pene ya lidusu ya nyoka, mpe elenge mwana akokotisa loboko na ye na zala ya nyoka.
9 They will not hurt or destroy on all my holy mountain, for the earth will be full of the knowledge of our Father as the waters cover the sea. Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.
10 In that day the root of Jesse will stand as a banner for the peoples; the nations will seek him, and his resting place will be glorious. Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.
11 In that day the Sovereign Father will reach out his hand a second time to reclaim the remnant of his people who are left—from Assyria, from Egypt, from Pathros, from Cush, from Elam, from Shinar, from Hamath, and from the islands of the sea. Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
12 He will raise a banner for the nations and gather the exiles of Israel; he will assemble the scattered people of Judah from the four corners of the earth. Akotombola bendele mpo na bikolo mpe akosangisa bana ya Isalaele oyo bazali na bowumbu ; akosangisa esika moko bato ya Yuda oyo bapalangana na mokili mobimba.
13 Ephraim's jealousy will vanish, and Judah's enemies will be cut off; Ephraim will not envy Judah, and Judah will not be hostile toward Ephraim. Motema likunya ya Efrayimi ekosila, mpe banguna ya Yuda bakobebisama ; Efrayimi akozala lisusu na motema likunya te mpo na Yuda to mpe Yuda akozala lisusu monguna ya Efrayimi te.
14 They will swoop down on the slopes of the Philistines to the west; together they will plunder the people of the east. They will seize Edom and Moab, and the Ammonites will be subject to them. Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia na bangomba mikuse ya ngambo ya weste ; bakobebisa elongo bikolo ya ngambo ya este, bakokonza bato ya Edomi mpe ya Moabi, bongo bato ya Amoni bakokoma bawumbu na bango.
15 Our Father will utterly destroy the arm of the Sea of Egypt; with a scorching wind he will sweep his hand over the Euphrates River. He will break it into seven streams so that people can cross over in sandals. Yawe akokawusa mayi ya eteni ya ebale oyo ekota na mabele ya Ejipito ; loboko na Ye ekoningisa ebale mpe akokabola yango na biteni sambo na mopepe makasi mpo ete bato bakoka kokatisa na makolo.
16 There will be a highway for the remnant of his people still left in Assyria, as there was for Israel on the day they came up from the land of Egypt. Nzela moko ekosalema mpo na ndambo ya bato na Ye oyo batikalaki na bomoi wuta na Asiri ndenge esalemaki tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]