Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Woe to those who enact unjust decrees, to the writers who issue oppressive laws, Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato !
2 to deprive the poor of justice and rob the needy among my people of their rights, making widows their plunder and orphans their prey. Bapimelaka bato pamba bosembo mpe babotolaka makoki ya babola, mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibali mpe ya bana bitike.
3 What will you do on the day of reckoning, when devastation comes from afar? To whom will you flee for help? Where will you leave your wealth? Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?
4 Nothing remains but to crouch among the captives or fall among the slain. Yet for all this his anger has not turned away; his hand is still stretched out. Eloko kaka bokotikala na yango : kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko to kokufa elongo na bato oyo babomi. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
5 "Woe to Assyria, the rod of my anger, in whose hand is the club of my fury! Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai ; nzete oyo ezali na loboko na ye ezali nde esalelo ya kanda na Ngai !
6 I send him against a godless nation; against the people of my wrath I command him, to seize spoil and carry off plunder, to trample them down like mud in the streets." Natindi ye mpo ete atelemela ekolo oyo eyebi Yawe te mpe bato oyo bapesaka Ngai kanda, mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bango mpe anyata bango lokola potopoto ya balabala.
7 But this is not what he intends; this is not what his heart plans. His purpose is to destroy, to cut off nation after nation. Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te, akanisaka yango bongo te ; akanisaka kaka koboma mpe kobebisa bikolo ebele.
8 For he says, "Are not all my commanders kings? Azali koloba : « Boni, bakambi na ngai bazali bango nyonso ndenge moko na bakonzi te ?
9 Is Calno not like Carchemish? Is Hamath not like Arpad? Is Samaria not like Damascus? Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi ? Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te ? Engumba Samari, lokola engumba Damasi te ?
10 As my hand seized the kingdoms of the idols, whose carved images surpassed those of Jerusalem and Samaria, Soki loboko na Ngai esukisaki bikolo oyo esambelaka banzambe ya bikeko, bikolo oyo ezalaki na banzambe ya bikeko ebele koleka Yelusalemi mpe Samari,
11 will I not deal with Jerusalem and her images as I dealt with Samaria and her idols?" nakokoka te penza kosala Yelusalemi elongo na banzambe na yango ya bikeko ndenge nasalaki Samari mpe banzambe na yango ya bikeko ? »
12 When the Sovereign Father has finished all his work against Mount Zion and Jerusalem, I will punish the fruit of the king of Assyria's arrogant heart and the haughty pride of his eyes. Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.
13 For he says: "By the strength of my hand I have done this, and by my wisdom, for I have understanding. I removed the boundaries of peoples and plundered their treasures; I brought down those enthroned like a mighty one. Pamba te azalaki koloba : ‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonso na makasi mpe na bwanya na ngai moko, pamba te nazali mayele ; napusaki bandelo ya bikolo, nabotolaki bomengo na bango lokola elombe, nalongaki bakonzi na bango.
14 My hand reached into the wealth of the peoples as into a nest; as one gathers abandoned eggs, I gathered all the earth. Not one flapped a wing or opened its beak to chirp. Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango ndenge bakamataka zala ya ndeke ; mpe ndenge bato balokotaka maki batika, ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba : moko te eningisaki lipapu to efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › »
15 Does the axe exalt itself over the one who swings it? Does the saw boast against the one who wields it? As if a rod could brandish the one who lifts it, as if a staff could lift what is not wood!" Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango ?
16 Therefore the Sovereign Father, the Father of heaven's armies, will send a wasting disease among his sturdy warriors, and beneath his glory a fire will blaze like a burning flame. Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotindela basoda na ye ya mbinga bokono oyo ekondisaka nzoto. Na se ya nkembo na Ye, bakopelisa moto lokola fulu ya moto.
17 The Light of Israel will become a fire, our Holy One a flame; in a single day it will burn and consume his thorns and briers. Pole ya Isalaele ekokoma moto, Mosantu ya Isalaele akopela lokola moto ; kaka na mokolo moko, akotumba mpe akozikisa basende mpe banzube ya Asiri,
18 The glory of his forest and his fertile field our Father will destroy, both soul and body; it will be as when a sick man wastes away. akozikisa nye bazamba na yango ya minene mpe bilanga na yango ya kitoko ndenge mobeli akondaka.
19 The remaining trees of his forest will be so few that a child could count them. Kati na bazamba na yango, ekotikala kaka banzete moke oyo ata mwana moke akokoka kotanga motango na yango.
20 In that day the remnant of Israel and the survivors of the house of Jacob will no longer lean on the one who struck them, but will truly lean on our Father, the Holy One of Israel. Na mokolo wana, batikali ya Isalaele mpe bato ya libota ya Jakobi oyo bakobika bakomipesa lisusu te na maboko ya moto oyo azalaki kobeta bango ; kasi bakomipesa na solo epai na Yawe, Mosantu ya Isalaele.
21 A remnant will return—a remnant of Jacob—to the Mighty God. Ndambo ya bakitani ya Jakobi bakozonga epai ya Nzambe na nguya.
22 Though your people Israel be like the sand of the sea, only a remnant will return. Destruction is decreed, overflowing with righteousness. Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga ; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela.
23 For the Sovereign Father, the Father of heaven's armies, will carry out the decreed destruction throughout the land. Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokokisa kobebisama oyo akanaki mpo na mokili mobimba.
24 Therefore the Sovereign Father, the Father of heaven's armies, says: "My people who live in Zion, do not be afraid of Assyria, who strikes you with the rod and lifts the staff against you as Egypt did. Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Oh bato na Ngai, bino oyo bovandi kati na Siona, bozala na somo te ya bato ya Asiri oyo bazali kobeta bino fimbu mpe kotombola nzete mpo na kobeta bino ndenge bato ya Ejipito bazalaki kosala.
25 For in a very little while my fury will end, and my anger will turn to their destruction." Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosila mpe kanda na Ngai ya makasi ekobalukela bango mpo na kobebisa bango. »
26 The Father of heaven's armies will brandish a whip against them, as when he struck Midian at the rock of Oreb; he will raise his staff over the sea as he did in Egypt. Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito.
27 In that day their burden will be lifted from your shoulder, their yoke from your neck; the yoke will be broken. Na mokolo wana, bakolongola mokumba na likolo ya mapeka na bino mpe na ekangiseli na bakingo na bino. Tango mokumba yango ekolongwa, ekotika esika na bomengo.
28 He comes against Aiath, passes through Migron, stores his supplies at Michmash. Tala bango wana bazali koya na Ayati, bazali koleka na lubwaku ya Migironi, babombi biloko na bango na Mikimasi.
29 They cross the pass: "We will camp at Geba." Ramah trembles; Gibeah of Saul flees. Baleki kati na bangomba mpe balobi : « Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. » Bato ya Rama bakomi kolenga na somo, mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi.
30 Cry out, daughter of Gallim! Listen, Laishah! Poor Anathoth! Oh bato ya Galimi, boganga makasi ! Oh Layisi, sala keba ! Oh engumba Anatoti, mawa na yo !
31 Madmenah is fleeing; the people of Gebim are taking cover. Bato ya Madimena bakimi, bato ya Gebimi bazali koluka ekimelo ;
32 This very day he stops at Nob, shaking his fist at the mount of the daughter of Zion, the hill of Jerusalem. Na mokolo ya lelo, bakotelema na Nobi, bakobeta makofi na bango na ngomba Siona, mboka kitoko, mpe na ngomba moke ya Yelusalemi.
33 Look, the Sovereign Father, the Father of heaven's armies, will lop off the branches with terrifying force; the tallest trees will be felled, the lofty ones brought low. Tala, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokata bitape ya banzete na nguya monene, akokata banzete milayi mpe oyo eleki milayi, akokomisa yango mikuse.
34 He will cut down the forest thickets with an axe, and Lebanon will fall before the Majestic One. Akokata na epasola banzete nyonso kati na zamba : Libani ekokweya liboso ya Elombe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]