Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
8:23 But there will be no gloom for her that was in anguish. Earlier he humbled the land of Zebulun and Naphtali, but later he honored the way of the sea, beyond the Jordan, Galilee of the nations. Nzokande, molili ekozala lisusu te mpo na bato oyo bazalaki na pasi. Na tango ya kala, Nzambe asambwisaki mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali ; kasi na mikolo oyo ekoya, Nzambe akopesa lokumu na Galile ya bapagano, na nzela ya ebale monene, na ngambo mosusu ya Yordani.
1 The people walking in darkness have seen a great light; on those who lived in a land of deep darkness, a light has shone. Bato oyo bazalaki kotambola kati na molili bamoni pole makasi ; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole engengeli bango.
2 You have multiplied the nation; you have increased its joy. They rejoice before you as with joy at the harvest, as men are glad when they divide the plunder. Okomisaki bango ekolo monene, obakisaki esengo na bango. Bazali kosepela liboso na Yo ndenge basepelaka tango babukaka milona, ndenge mibali basepelaka tango bakabolaka bomengo ya bitumba.
3 For the yoke of his burden, and the bar across his shoulder, the rod of his oppressor, you have shattered as on the day of Midian. Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango, nzete oyo ezalaki na mapeka na bango mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango, Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.
4 For every boot of the trampling warrior in the din of battle, and every garment soaked in blood, will be burned as fuel for the fire. Basapato nyonso ya basoda oyo lokito na yango eningisaka mabele, mpe bilamba nyonso oyo etondaki na makila, ekobwakama na moto mpo ete ezika makasi.
5 For to us a child is born, to us a son is given; and the government will be upon his shoulder. And his name will be called Wonderful Counselor, Mighty God, Everlasting Father, Prince of Peace. Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, mwana mobali moko apesameli biso, mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye ; bakobenga ye : Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.
6 There will be no end to the increase of his government and peace, on the throne of David and over his kingdom, to establish it and to uphold it with justice and with righteousness from now on and forevermore. The zeal of the Father of heaven's armies will accomplish this. Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.
7 The Sovereign Father has sent a word against Jacob, and it has fallen on Israel. Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.
8 And all the people will know it—Ephraim and the inhabitants of Samaria—who say with proud and arrogant hearts: Bato nyonso bakoyeba yango, Efrayimi mpe bavandi ya Samari, oyo balobaka na lofundu mpe na lolendo ya mitema :
9 "The bricks have fallen, but we will rebuild with cut stones; the sycamores have been cut down, but we will put cedars in their place." « Ata babiliki ekweyi, tokotonga lisusu na mabanga bakata ; ata bakati banzete ya sikomori, tokotia na esika na yango banzete ya sedele. »
10 So our Father raises against them the adversaries of Rezin, and stirs up their enemies. Kasi Yawe alendisaki bayini ya Retsini mpo na kobundisa bango mpe apelisaki mitema ya banguna na bango mpo ete batombokela bango.
11 Aram from the east and the Philistines from the west have devoured Israel with open mouth. For all this his anger has not turned away, and his hand is still outstretched. Bato ya Siri na liboso, mpe bato ya Filisitia na sima, bapasolaki Isalaele mpe baliaki ye na lokoso. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
12 Yet the people did not turn to the one who struck them, nor did they seek the Father of heaven's armies. Kasi atako bongo, bato bazongaki kaka te epai na Yawe oyo abetaki bango, mpe balukaki te Yawe, Mokonzi ya mampinga.
13 So our Father cut off from Israel both head and tail, palm branch and reed, in a single day, Yango wana, kaka na mokolo moko, Yawe akokata, kati na Isalaele, moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi.
14 the elder and the honored man are the head, and the prophet who teaches lies is the tail. Bampaka mpe bato ya lokumu, bango nde moto ; mpe basakoli ya lokuta, bango nde mokila.
15 For those who guide this people lead them astray, and those who are guided by them are swallowed up. Bakambi ya bato babungisi bato na bango nzela, mpe bato oyo balandaka bango bakomi kotelengana.
16 Therefore the Sovereign Father does not rejoice over their young men, and has no compassion on their orphans and their widows; for everyone is godless and an evildoer, and every mouth speaks foolishness. For all this his anger has not turned away, and his hand is still outstretched. Yango wana, Nkolo akosepela na bilenge te, akoyokela bana bitike mpe basi bakufisa mibali mawa te, pamba te bango nyonso bazali kotiola Nzambe, bazali kosala mabe, mpe minoko nyonso ezali kobimisa maloba ya bozoba. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
17 For wickedness burns like a fire; it consumes briers and thorns; it kindles the thickets of the forest, and they roll upward in a column of smoke. Solo, mabe etumbaka lokola moto oyo ezikisaka basende mpe banzube, ezikisaka bazamba minene mpe ematisaka makonzi ya milinga.
18 Through the wrath of the Father of heaven's armies, the land is scorched, and the people have become like fuel for the fire; no one spares his brother. Na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mokili eziki na moto, mpe bato bakomi lokola mafuta na moto. Moto moko te akobikisa ndeko na ye.
19 They carve on the right, but are still hungry; they devour on the left, but are not satisfied; each devours the flesh of his own arm. Na ngambo ya loboko ya mobali, bakobotola bato biloko, kasi bato bakozala kaka na nzala ; na ngambo ya loboko ya mwasi, bakolia, kasi bato bakotonda kaka te ; moko na moko akolia mosuni ya loboko na ye :
20 Manasseh devours Ephraim, and Ephraim Manasseh, and together they are against Judah. For all this his anger has not turned away, and his hand is still outstretched. Manase akolia Efrayimi, mpe Efrayimi akolia Manase ; bango mibale bakosangana mpe bakobalukela Yuda. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]