Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father said to me, "Take a large tablet and write on it plainly: 'Belonging to Maher-shalal-hash-baz.'" Yawe alobaki na ngai : « Kamata etando monene ya libanga mpe salela ekomeli mpo na kokoma makambo oyo na likolo na yango : Maher-Shalal-Hash-Baz (pene bomengo ya bitumba, pene kobebisama). »
2 So I called reliable witnesses to attest for me—Uriah the priest and Zechariah son of Jeberechiah. Nabengaki Nganga-Nzambe Iri mpe Zakari, mwana mobali ya Yeberekia, mpo ete bazala batatoli na ngai ya sembo.
3 Then I went to the prophetess; she conceived and bore a son, and our Father said to me, "Name him Maher-shalal-hash-baz. Nakendeki epai ya mwasi mosakoli ; akomaki na zemi mpe abotaki mwana mobali. Yawe alobaki na ngai : « Pesa ye kombo Maher-Shalal-Hash-Baz.
4 Before the boy knows how to cry 'My father' or 'My mother,' Damascus's wealth and Samaria's plunder will be carried off before Assyria's king." Liboso ete mwana ayeba ndenge babengaka ‹ Tata na ngai › to ‹ mama na ngai, › bakomema bozwi ya Damasi mpe bomengo ya bitumba ya Samari epai ya mokonzi ya Asiri. »
5 Our Father spoke to me yet again: Yawe alobaki na ngai lisusu :
6 "Because this people has refused the gently flowing waters of Shiloah and rejoices over Rezin and the son of Remaliah, « Mpo ete bato oyo basundoli mayi ya Siloe oyo etiolaka na kimia, mpe basepeli na Retsini mpe na mwana mobali ya Remalia,
7 therefore the Sovereign Father is about to bring up against them the mighty floodwaters of the River—the king of Assyria and all his glory. It will rise over all its channels and overflow all its banks, Yawe akotindela bango mayi ya nguya mpe mayi ebele lokola mayi ya ebale Efrate : ekozala nde mokonzi ya Asiri elongo na mampinga na ye nyonso. Ekotonda penza meke mpe ekozipa bangambo nyonso.
8 and it will sweep on into Judah, flooding and passing through, reaching up to the neck; and its outstretched wings will fill the breadth of your land, Immanuel." Ekokota na Yuda mpe ekozindisa yango kino na kingo ; mpe kopanzana ya mayi yango ekotondisa mokili na yo mobimba, Emanwele. »
9 Be shattered, you peoples, and be broken! Listen, all you distant lands! Strap on your armor and be broken; strap on your armor and be broken! Bino bikolo, boganga na somo mpe bopalangana ! Bino bituka nyonso ya mosika, boyoka ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana !
10 Devise your plan, but it will come to nothing; speak your word, but it will not stand—for our Father is with us. Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama ; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso !
11 For this is what our Father told me, his strong hand on me, warning me not to walk this people's way: Yawe alobaki na ngai, tango asimbaki ngai na loboko na Ye ya nguya mpe akebisaki ngai ete nalanda te nzela ya bato oyo :
12 "Do not call conspiracy everything this people calls conspiracy; do not fear what they fear, and do not be terrified. « Bobengaka likita te eloko nyonso oyo bato babengaka likita ; bobangaka te oyo bango babangaka, boyokela yango somo ata moke te.
13 The Father of heaven's armies—he is the one you should regard as holy. Let him be your fear; let him be your dread. Kaka Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde bosengeli komona lokola Mosantu, Ye kaka nde bosengeli kokumisa, Ye kaka nde bosengeli koyoka somo.
14 He will become a sanctuary; but to both houses of Israel he will be a stone that makes them stumble and a rock that makes them fall, and to the inhabitants of Jerusalem a trap and a snare. Akozala lokola Esika ya bule ; kasi mpo na bandako mibale ya Isalaele, akozala lokola libanga oyo ebetisaka bato mabaku, lokola libanga monene oyo ekweyisaka bato ; bongo mpo na bato ya Yelusalemi, akozala motambo mpe monyama.
15 Many among them will stumble; they will fall and be broken, they will be snared and captured." Mingi kati na bango bakobeta mabaku, bakokweya mpe bakobukana, bakokangama na motambo, mpe bakozwa bango. »
16 Preserve the testimony; seal the teaching among my disciples. Bomba lisakoli oyo ete eyebana te, kangisa mobeko oyo kati na bayekoli na ngai.
17 I will wait for our Father, who is hiding his face from the house of Jacob; I will hope in him. Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.
18 Here am I, and the children our Father gave me—signs and wonders in Israel from the Father of heaven's armies, who lives on Mount Zion. Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.
19 When they tell you, "Ask the mediums and those who consult spirits, who whisper and mutter," should a people not ask their Father? Should they consult the dead for the living? Soki bato balobi na bino : « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te ? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi ? »
20 To the teaching and the testimony! If they don't speak according to this word, they have no light of dawn. Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.
21 Distressed and hungry, they will roam the land; when famished, they will rage and curse their king and their Father, and look up. Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala ; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe.
22 They will look to the earth and see only distress and darkness, the gloom of anguish; and they will be driven into thick darkness. Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi ; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]