Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 25 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Maloba ya misato ya Bilidadi

1Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :

2« Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ;atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.

3Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ?Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?

4Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ?Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?

5Soki kutu sanza ezali kongenga te,mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,

6toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi,mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]