Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 26 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Eyano na Yobo epai ya Bilidadi

1Yobo azongisaki :

2« Ah ! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi,ndenge osungi loboko oyo elembi !

3Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya,mpe tala ebele na mayele oyo olakisi !

4Ozwi maloba oyo wapi ?Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani ?

5Bakufi balengaka na se ya mayimpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.

6Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu,mpe libulu ya molili ezali polele.

7Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te,atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,

8akangaka mayi kati na mapata,kasi mapata epasukaka te ;

9azipaka kiti ya bokonzi na Ye,atandaka mapata na likolo na yango ;

10akataka mondelo na likolo ya mayi,na suka ya pole mpe na molili.

11Makonzi ya Lola ezali kolengampe ezali kokamwa na pamela na Ye.

12Na nguya na Ye, apasoli ebale monene ;mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni.

13Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko,loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka.

14Soki makambo wana ezali kaka ndambo mokeya misala na Yempe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka,nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]