Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 23 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Yawe azali Mobateli na ngai

1Nzembo ya Davidi.Yawe azali mobateli na ngai,nakozanga ata eloko moko te.

2Apemisaka ngai na matiti ya mobesu,mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia.

3Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai,akambaka ngai na banzela ya bosembompo na lokumu ya Kombo na Ye.

4Ata soki nasengeli kokatisa lubwakuoyo etondi na molili ya kufa,nakobanga mabe ata moko te,pamba te ozali elongo na ngai,nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai,mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.

5Obongisaka mesa mpo na ngaina miso ya bayini na ngai,opakolaka moto na ngai mafutampe otondisaka kopo na ngai kino kosopana.

6Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai,esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ;mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawekino suka ya bomoi na ngai.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]