Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 128 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Tika ete Yawe apambola yo

1Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Esengo na moto oyo atosaka Yawempe alandaka banzela na Ye !

2Oliaka mbuma ya mosala na Yo ;ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.

3Kati na ndako na yo,mwasi na yo azali lokola nzete ya vinooyo ebotaka bambuma ebele ;bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olivezingazinga ya mesa na yo.

4Ezali ndenge wana nde Yawe apambolakamoto oyo atosaka Ye.

5Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona,mpe okomona bofuluki ya Yelusalemimikolo nyonso ya bomoi na yo

6mpe okomona bakitani na yo.Tika ete kimia ezala na Isalaele !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]