Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 15 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Nani akoki kovanda esika moko na Nzambe

1Nzembo ya Davidi.Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule ?Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule ?

2Ezali moto oyo azangi pamela,oyo asalaka makambo ya sembompe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ;

3oyo akoselaka moninga makambo te,asalaka ye mabe te,mpe ayokisaka ye pasi te ;

4asanganaka te na moto oyo asalaka mabe,kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ;akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi,mpe abongolaka mokano na ye te ;

5asengaka mileki te soki adefisi mbongo,andimaka kanyaka tempo na kokweyisa moto oyo asali mabe te.Moto nyonso oyo atambolaka bongoakotikala kopengwa te.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]