Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 14 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Mokili ezali ya kobeba

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.Bazoba bamilobelaka :« Nzambe azali te. »Makanisi na bango esila kobeba,basalaka makambo ya nkele,mpe moko te asalaka bolamu.

2Wuta na Likolo, Yawe atalaka batompo na koluka koyebasoki ezali ata na moko oyo azali na mayele,oyo atalelaka Nzambe.

3Bango nyonso babunga nzela,bango nyonso bamibebisa ;moko te asalaka bolamu,ata moto moko te !

4Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ?Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa,babelelaka Yawe te !

5Somo monene ekangi bango,pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.

6Bino, bato ya misala mabe, bobebisaka mabongisi ya mobolakasi Yawe azali ebombamelo na ye.

7Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona !Tango Yawe akobongisa bato na Ye,bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]