Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Blessed is the one who does not walk in the counsel of the wicked, nor stand among sinners, nor sit in the seat of mockers, Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli,
2 but his delight is in the law of our Father, and on his law he meditates day and night. kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi.
3 He is like a tree planted by streams of water, which yields its fruit in its season, and its leaf does not wither—and whatever he does prospers. Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.
4 Not so the wicked! They are like chaff that the wind drives away. Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe ! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka.
5 Therefore the wicked will not stand in the judgment, nor sinners in the assembly of the righteous. Yango wana bato mabe bakolonga te kotelema na kosambisama, mpe bato ya masumu bakowumelaka te kati na lisanga ya bato ya sembo.
6 For our Father watches over the way of the righteous, but the way of the wicked will perish. Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]