Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Why do the nations rage, and the peoples plot in vain? Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele mpe bato bazali kosala makita ya pamba ?
2 The kings of the earth take their stand, and the rulers conspire together against our Father and against his Anointed One. Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Yawe elongo na mopakolami na Ye.
3 "Let us tear off the chains they have put on us," they say, "and throw their ropes away from us." Bazali koganga elongo : « Tokata minyololo na bango mpe tomikangola na bokonzi na bango ! »
4 Our Father, enthroned in heaven, laughs; the Sovereign Father scoffs at them. Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.
5 Then he will speak to them in his anger and terrify them in his fury: Agangeli bango na kanda, apelisi kanda makasi na Ye mpo na bango, alobi :
6 "I myself have installed my King on Zion, my holy mountain." « Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »
7 I will proclaim the decree of our Father: he said to me, "You are my Son; today I have become your Father. Nakosakola mobeko ya Yawe. Alobaki na ngai : « Ozali Mwana na Ngai ya mobali, na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo.
8 "Ask me, and I will make the nations your inheritance, and the ends of the earth your possession. Senga Ngai, mpe nakokomisa bikolo libula na Yo, basuka ya mokili bozwi na Yo.
9 You will break them with a rod of iron; you will shatter them like a potter's jar." Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »
10 Now then, you kings, be wise; be warned, you rulers of the earth. Yango wana, bino bakonzi, bozala na mayele ; bino bayangeli ya mokili, boyoka likebisi oyo.
11 Serve our Father with reverence, and rejoice with trembling. Bosalela Yawe na kobanga mpe bosepela na kolenga.
12 Kiss the Son, or he will be angry and you will perish along the way, for his wrath can flare up in a moment. Blessed are all who take refuge in him. Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]