Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 12 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.

2Yawe, sunga biso !Pamba te bayengebene bazali lisusu te ;bato ya kotiela motema bazali lisusu tekati na bana na bato.

3Bato nyonso bazali kokosana bango na bango,bazali kolobana maloba ya sukali,kasi mitema na bango ezali sembo te.

4Tika ete Yawe aboma bato nyonsooyo balobaka maloba ya sukalimpe batondi na lolendo,

5ba-oyo balobaka :« Tokolonga na nzela ya lolemo na biso,bibebu na biso ekolobela biso ;nani akoluka kozala nkolo na biso ? »

6Yawe alobi :« Mpo ete bazali konyokola babolampe kolelisa bato oyo bakelela,natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. »

7Maloba ya Yawe ezalaka petolokola palata oyo balekisi na motompe bapetoli mbala sambo.

8Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela,okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe.

9Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipaisoki bato bapesi bozoba lokumu.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]