Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 4 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda.

2Nzambe, bosembo na ngai,soki nabeleli Yo, yanola ngai.Kangola ngai na pasi,salela ngai ngolu,mpe yoka libondeli na ngai.

3Bino bato, kino tango nini bokoyokisankembo na ngai soni ?Kino tango nini bokomisepelisana makambo ya pambampe bokolanda makambo ya lokuta ?

4Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye mokomosali oyo azali sembo na miso na Ye ;Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.

5Soki bosiliki, bosalaka masumu te ;soki bolali na mbeto,bolukaka kososola makambompe bovandaka kimia.

6Bobonzaka bambeka kolanda mibekompe botiaka elikya na bino kati na Yawe.

7Bato mingi bazali kotuna :« Nani akomemela biso bolamu ? »Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.

8Tondisa motema na ngai na esengosoki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.

9Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia,pamba te, Yo moko Yawe, osalakaete navanda na kimia.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]