Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 8 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

2Oh Yawe, Nkolo na biso,Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba !Ovandisi nkembo na Yokati na Lola.

3Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike,otelemisi ndako batonga makasi,mpo na kotelemela bayini na Yompe kokanga monoko ya mongunampe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.

4Tango natalaka Lola na Yo,mosala ya misapi na Yo,sanza mpe minzoto oyo otia,

5namitunaka : Moto azali nini mpo ete okanisa ye,mpe moto azali nani mpo ete obatela ye ?

6Osalaki ye moke koleka ba-anjelumpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu ;

7otia ye moyangeli ya misala ya maboko na Yo,otia nyonso na se ya matambe na ye :

8bameme, bantaba,bangombe mpe banyama ya zamba,

9bandeke ya likolo,mbisi ya ebale monenempe nyonso oyo etambolaka na bibale.

10Oh Yawe, Nkolo na biso,Kombo na Yo ezali monenekati na mokili mobimba !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]