Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 133 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Tango bandeko basangani

1Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitokompo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !

2Ezali lokola malasi ya motuyaoyo basopi na moto,bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron,ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.

3Ezali lokola mamwe ya Erimoni,oyo ekitaka na bangomba ya Siona.Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye,mpe bomoi, mpo na libela.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]