Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 134 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Bokumisa Yawe

1Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo.Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo,oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo.

2Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bulempe bopambola Yawe !

3Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona,Ye oyo asala likolo mpe mabele !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]