Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 125 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Kimia ya solo

1Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe.Bato oyo batiaka elikya kati na Yawebazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te,oyo epikama mpo na libela.

2Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi,ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye,kobanda sik’oyo kino libela na libela.

3Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo,mpo ete basangana te na mabe.

4Yawe, zala malamu mpo na bato malamumpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema !

5Kasi tika ete Yawe abenganabato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe !Tika ete kimia ezala na Isalaele !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]