Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 126 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Tango ya kolona mpe tango ya kobuka

1Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Tango Yawe azongisaki bato ya Sionalongwa na bowumbu,tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.

2Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo.Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo :« Yawe asaleli bango makambo minene ! »

3Solo, Yawe asaleli biso makambo minene,mpe tozali kosepela.

4Yawe, yaka kobongisa makambo na bisondenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi.

5Bato oyo balonaka na mpinzolibabukaka na banzembo ya esengo.

6Moto oyo akendaka na kolela,tango amemi milona na ye,azongaka na esengowana amemi maboke na ye.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]