Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Cast your bread upon the waters, for after many days you will find it again. Bwaka lipa na yo na likolo ya mayi, pamba te sima na mikolo ebele, okomona yango lisusu.
2 Give a portion to seven, or even to eight, for you do not know what disaster may come upon the land. Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe, pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.
3 If the clouds are full, they pour out rain upon the earth; and if a tree falls to the south or to the north, in the place where it falls, there it will lie. Soki mapata etondi na mayi, ebetisaka mvula na mokili. Nzete etikalaka kaka na esika oyo ekweyi, ezala na ngambo ya sude to na ngambo ya nor.
4 Whoever watches the wind will never sow, and whoever studies the clouds will never reap. Moto oyo atalaka mopepe akolona nkona te, moto oyo atalaka mapata akobuka bambuma te.
5 Just as you do not know the path of the wind, or how the bones are formed in the womb of a pregnant woman, so you cannot know the work of God, who makes everything. Ndenge oyebi te nzela ya mopepe to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye, ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe oyo azali Mokeli ya nyonso.
6 Sow your seed in the morning, and at evening do not let your hand rest, for you do not know which will succeed—this or that—or whether both alike will do well. Na tongo, lona milona na yo, mpe na pokwa, kopemisa maboko na yo te, pamba te oyebi te milona nini ekobima, ya tongo to ya pokwa to mpe nyonso mibale ekobima malamu.
7 Light is sweet, and it is pleasant for the eyes to see the sun. Pole ezali malamu, mpe miso esepelaka komona moyi.
8 So if a person lives many years, let them rejoice in them all; but let them remember the days of darkness, for they will be many. Everything that comes is fleeting. Yango wana, soki moto asali mibu ebele na bomoi, tika ye asepela na mibu yango nyonso ; kasi tika ete abosana te ete mibu ya pasi ekozala ebele, mpe ete makambo nyonso oyo ekoya sima ezali pamba.
9 Rejoice, young man, in your youth, and let your heart give you gladness in the days of your youth. Walk in the ways of your heart and in the sight of your eyes; but know that for all these things God will bring you into judgment. Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.
10 So banish frustration from your heart, and put away pain from your body, for youth and the dawn of life are fleeting. Yango wana, longola mawa na motema na yo, longola pasi na nzoto na yo ; pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]