Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Remember your Creator in the days of your youth, before the days of trouble come and the years draw near of which you will say, "I find no pleasure in them," Kanisa Mokeli na yo, na mikolo nyonso ya bolenge na yo, liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo, mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango : « Nazali kosepela na ngai na yango te ; »
2 before the sun and the light and the moon and the stars grow dark, and the clouds return after the rain; liboso ete moyi mpe pole, sanza mpe minzoto, ekoma molili, mpe mapata ezonga sima na mvula ;
3 on the day when the house's guardians tremble, and the strong men stoop, and the grinding women fall idle because so few remain, and those peering through the windows go dark; tango bakengeli ya ndako bakolenga, mpe bato ya makasi bakofukama ; tango basi oyo banikaka ble bakotika konika yango mpo ete bazali lisusu mingi te, mpe bato oyo batalaka na maninisa bakobungisa kitoko na bango ;
4 when the doors on the street are shut and the sound of the grinding grows faint; when one rises at the sound of a bird, and all the daughters of song are brought low; tango bikangelo ya ekuke ekokangama na balabala, mpe makelele ya basi oyo banikaka ble ekosila ; tango bato balamukaka na banzembo ya bandeke mpe bayembi ya basi batikaka koyemba ;
5 when they are afraid of heights, and terrors lie in the road; when the almond tree blossoms, and the grasshopper drags itself along, and desire fails—because man goes to his eternal home, and the mourners go about the streets; tango bato bakomaka kobanga komata likolo, mpe bakomaka kobanga makama na nzela ; tango nzete ya pome ebimisaka mbuma, tango mabanki ekomaka kilo, mpe baposa ekokisamaka lisusu te ; pamba te moto akendaka na ndako ya libela, mpe basi oyo balelaka na bibembe basanganaka na balabala.
6 before the silver cord is snapped, or the golden bowl is shattered, or the pitcher is broken at the spring, or the wheel is broken at the well, Solo, kanisa Mokeli na yo liboso ete singa ya palata ekatana, kopo ya wolo efinana, eloko ya mayi ebukana na libulu ya mayi, mpe mashini oyo babendelaka mayi na libulu ebukana ;
7 and the dust returns to the earth as it was, and the spirit returns to God who gave it. liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
8 "Utterly fleeting," says the Teacher. "Everything is fleeting." Pamba na pamba, elobi mosakoli, makambo nyonso ezali kaka pamba.
9 The Teacher was wise, and also taught people knowledge—weighing, searching, arranging many proverbs. Mosakoli azalaki kaka moto ya bwanya te, kasi azalaki mpe koyekolisa bato boyebi ; akanisaki mingi, alukaki mingi mpe atiaki na molongo masese ebele penza.
10 The Teacher sought to find pleasing words, and what he wrote was upright and true. Mosakoli asalaki makasi mpo na koluka koyeba maloba ya elengi mpe kokoma na bosembo makambo ya solo.
11 Wise sayings are like goads; collected proverbs, like firmly driven nails—given by one Shepherd. Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola banzube, mpe buku ya masese na bango ezali lokola basete oyo ekotaka makasi na libaya. Masese yango nyonso ewuti epai ya Mobateli mpate moko.
12 Beyond these, my son, be warned: making many books has no end, and much study wears out the body. Mwana na ngai, keba ete obakisa eloko moko te na likolo na yango. Suka ezali te mpo na kokoma mikanda ebele, mpe koyekola mingi elembisaka nzoto.
13 End of the matter, all heard: fear God, keep his commands—this is a person's whole duty. Yoka suka ya mateya nyonso : Tosa Nzambe mpe batela mibeko na Ye, pamba te yango nde eleki na tina mpo na moto.
14 For God will bring every deed into judgment, including every hidden thing, whether good or evil. Pamba te, Nzambe akomema misala nyonso na kosambisama, ezala oyo ebombama, ya malamu to ya mabe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]