Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Dead flies make the perfumer's oil stink and ferment; so a little foolishness outweighs wisdom and honor. Ndenge nzinzi ekufa ekomisaka malasi solo mabe, ndenge wana mpe mwa bozoba ebebisaka bwanya mpe lokumu.
2 The heart of the wise inclines to his right, but the heart of a fool to his left. Motema ya moto ya bwanya ekendaka na nzela ya malamu, kasi motema ya zoba ekendaka na nzela ya mabe.
3 Even when the fool walks along the road, he lacks sense, and he shows everyone that he is a fool. Ata tango zoba atambolaka na nzela, bozangi mayele na ye etalisaka na bato mosusu ete azali zoba.
4 If the ruler's anger rises against you, do not leave your post, for calmness lays great offenses to rest. Soki mokonzi atombokeli yo, kolongwa na esika na yo ya mosala te ; pamba te motema ya kokita epekisaka bambeba minene.
5 There is an evil I have seen under the sun, the kind of error that comes from a ruler: Namonaki mabe moko na se ya moyi, lokola libunga epai ya bakonzi :
6 foolishness is set in many high places, while the rich sit in low positions. bazoba batombolami na bisika ya lokumu makasi, kasi bazwi batikali na bisika ya se.
7 I have seen slaves on horseback, and princes walking on foot like slaves. Namonaki bawumbu kotambola likolo ya bampunda, mpe bakonzi kotambola na makolo lokola bawumbu.
8 Whoever digs a pit may fall into it, and whoever breaks through a wall may be bitten by a snake. Moto oyo atimoli libulu akoki kokweya kati na yango ; mpe moto oyo abuki mir ya lopango, nyoka ekoki koswa ye.
9 Whoever quarries stones may be hurt by them, and whoever splits logs is endangered by them. Moto oyo abukaka mabanga akoki kozoka na yango, oyo apasolaka mabaya akoki mpe kozwa likama.
10 If the axe is dull and its edge is not sharpened, you have to use more strength; but wisdom brings success. Soki epasola esili minu mpe bapelisi yango te, moto oyo akosalela yango akobimisa makasi mingi ; kasi bwanya epesaka elonga.
11 If the snake bites before it is charmed, the charmer gains nothing. Soki nyoka eswi moto liboso ete asakanisa yango, litomba ezali lisusu te epai ya moto oyo asakanisaka banyoka.
12 A wise man's words bring him favor, but the lips of a fool consume him. Maloba ya moto ya bwanya epesaka esengo, kasi maloba ya zoba elukelaka ye makambo.
13 The beginning of his words is foolishness, and the end of his talk is wicked madness. Abandaka na maloba ya bozoba mpe asukisaka na maloba ya mabe.
14 Yet the fool keeps on talking. No one knows what is coming, and who can tell anyone what will happen after him? Zoba alobaka mingi. Moto moko te ayebi makambo oyo ekoya ; nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekosalema sima na ye ?
15 Fools wear themselves out with their work, for they do not even know the way to town. Mosala ya zoba elembisaka ye, ayebi ata kutu te nzela oyo ememaka na engumba.
16 Woe to you, land, when your king is a child and your princes feast in the morning. Mawa na mokili oyo mokonzi na yango azali mwana moke, mpe oyo bakambi na yango balangwaka masanga na tongo-tongo !
17 Blessed are you, land, when your king is the son of nobles and your princes feast at the proper time—for strength, and not for drunkenness. Esengo na mokili oyo mokonzi na yango abotama na libota ya bato minene, mpe oyo bakambi na yango baliaka na tango oyo esengeli mpo na kozwa makasi, kasi mpo na kolangwa masanga te.
18 Through laziness the rafters sag, and through idle hands the house leaks. Soki moto azali goyigoyi, likolo ya ndako na ye ekobukana ; soki maboko na ye elemba, ndako na ye ekotanga mayi.
19 Bread is made for laughter, and wine gladdens life, and money answers everything. Basalaka feti mpo na kosepela, mpe masanga ya vino epesaka esengo na motema, mpe mbongo epesaka biyano na makambo nyonso.
20 Do not curse the king even in your thoughts, and do not curse the rich even in your bedroom, for a bird of the sky may carry your words, and a winged creature may report what you say. Kolakela mokonzi mabe te, ezala kati na motema na yo ; kolakela mozwi mabe te, ezala na mbeto na yo ya kolala, pamba te ndeke ya likolo ekoki komema maloba na yo mpe kopanza sango ya maloba na yo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]