Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I set my heart to examine all this: the righteous, the wise, and their deeds are in God's hand. Whether love or hatred, no one knows—everything lies ahead of them. Boye, nakanisaki mingi na makambo oyo nyonso mpe namonaki ete, ezala moto ya sembo, moto ya bwanya elongo na makambo nyonso oyo basalaka, bazali na maboko ya Nzambe ; kasi moko te ayebaka soki bolingo to koyina ezelaka ye.
2 The same happens to everyone: one fate for the righteous and the wicked, the good, the clean and unclean, the one who sacrifices and the one who doesn't. As with the good, so with the sinner; the one who swears an oath, like the one afraid to swear. Bato nyonso basukaka kaka ndenge moko : ezala moto ya sembo to moto mabe, ezala moto malamu to moto oyo asalaka masumu, ezala moto ya peto to moto ya mbindo, ezala moto oyo abonzaka mbeka to moto oyo abonzaka mbeka te. Ndenge ezalaka mpo na moto ya motema malamu ndenge mpe ezalaka mpo na moto ya masumu ; ndenge ezalaka mpo na moto oyo alapaka ndayi ndenge mpe ezalaka mpo na moto oyo abangaka kolapa ndayi.
3 This is the evil in all done under the sun: one fate for all. Human hearts are full of evil, madness fills their hearts while they live—then they go to the dead. Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi : bato nyonso basukaka kaka ndenge moko ; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi ; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.
4 Whoever lives still has hope: a living dog is better than a dead lion. Moto nyonso oyo azali kati na bato ya bomoi azalaka na elikya ; mbwa ya bomoi ezali malamu koleka nkosi oyo ekufa.
5 For the living know they will die, but the dead know nothing; they have no more reward, for their memory is forgotten. Pamba te bato ya bomoi bayebaka ete bakokufa ; kasi bato oyo bakufa bayebaka lisusu eloko moko te, bazalaka lisusu te na litomba ya kozwa, mpo ete babosana bango.
6 Their love, their hatred, their envy have already perished; they will never again share in anything done under the sun. Bolingo na bango, koyina na bango mpe baposa na bango esila kolimwa ; bakozwa lisusu litomba ata moko te kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi.
7 Go, eat your bread with joy, drink your wine with a glad heart, for God has already approved your deeds. Kende, lia bilei na yo na esengo mpe mela masanga na yo ya vino na motema ya esengo ; pamba te Nzambe asili kondima misala na yo.
8 Let your garments always be white, and let your head never lack oil. Tika ete bilamba na yo ezala tango nyonso peto, mpe nzoto na yo elumba tango nyonso solo ya malasi.
9 Enjoy life with the wife you love, all the fleeting days of life God has given you under the sun—all your fleeting days—for that is your portion in life and in the toil you labor at under the sun. Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi ; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi.
10 Whatever your hand finds to do, do it with your strength, for there's no work or plan or knowledge or wisdom in the grave, where you're going. Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
11 Again I saw under the sun: the race is not to the swift, nor the battle to the strong, nor bread to the wise, nor riches to the discerning, nor favor to the skilled—time and chance happen to them all. Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli ; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.
12 No one knows their time: like fish caught in an evil net, like birds caught in a snare, people are trapped in an evil time that falls on them suddenly. Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka : ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.
13 I have also seen this example of wisdom under the sun, and it seemed great to me: Namonaki lisusu na se ya moyi, ndakisa moko ya bwanya oyo ezalaki na tina mingi mpo na ngai :
14 A small city with few people: a great king came against it, surrounded it, and built great siegeworks against it. ezalaki na engumba moko ya moke oyo ezalaki mpe na bato moke ; bongo mokonzi moko ya nguya ayaki kobundisa yango, azingelaki yango mpe atongaki milako mpo na kokonza engumba yango.
15 A poor wise man was found in it who saved the city by his wisdom, yet no one remembered that poor man. Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mobola moko oyo azalaki moto ya bwanya ; abikisaki yango na bwanya na ye, kasi moto moko te akanisaki mobola yango.
16 I said, "Wisdom is better than strength," yet the poor man's wisdom is despised, and his words are unheard. Boye namilobelaki : « Bwanya ezali malamu koleka makasi ya nzoto. » Kasi bwanya ya mobola etiolamaka, mpe bayokaka maloba na ye te.
17 The quiet words of the wise are heard better than the shouting of a ruler among fools. Bayokaka maloba ya kimia ya moto ya bwanya koleka makelele ya mokonzi ya bazoba.
18 Wisdom is better than weapons of war, but one sinner destroys much good. Bwanya ezali malamu koleka bibundeli ya basoda, kasi mbeba moko ekoki koboma bolamu na yango nyonso.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]