Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Who is like the wise? Who knows what a thing means? A person's wisdom brightens their face; the hardness of their face is changed. Nani azali lokola moto ya bwanya ? Nani ayebi kolimbola makambo ? Bwanya engengisaka elongi ya moto, mpe efungolaka elongi oyo ekangama.
2 Keep the king's command, I say, because of your oath before God. Nalobi : Tosaka mitindo ya mokonzi, pamba te olapaki ndayi liboso ya Nzambe.
3 Don't rush to leave his presence, or stand in an evil matter—the king does whatever he pleases. Kolongwaka na lombangu te liboso ya mokonzi mpe kobundelaka likambo ya mabe te, pamba te mokonzi asalaka kaka makambo oyo esepelisaka ye.
4 For the king's word holds supreme authority, and who can say to him, "What are you doing?" Lokola liloba ya mokonzi ezalaka na bokonzi, nani akoki koloba na ye : « Ozali kosala nini ? »
5 Whoever keeps a command knows no harm; a wise heart knows time and way. Moto nyonso oyo atosaka mibeko na ye akokweyela pasi te, mpe motema ya moto ya bwanya eyebaka tango ya malamu mpe lolenge ya malamu ya kosalela.
6 Every matter has its time and way, though one's trouble weighs heavy on him. Pamba te, ezali na tango ya malamu mpe na lolenge ya malamu ya kosalela na likambo nyonso. Atako bongo, pasi ekweyelaka kaka moto.
7 For no one knows what is to come, and who can tell them how it will be? Lokola moto moko te ayebi makambo oyo ekoya sima, nani akoki koyebisa moninga ndenge ekoyela ye ?
8 No one controls the wind to hold it back, or the day of death. No one is discharged from that war, and evil won't rescue those who practice it. Ndenge moto moko te azali na bokonzi likolo ya pema ya bomoi na ye mpo ete akanga yango, ndenge mpe moto moko te azali na bokonzi likolo ya mokolo na ye ya kufa. Ndenge moto moko te apemaka na tango ya bitumba, ndenge mpe misala mabe ebikisaka te bato oyo basalaka yango.
9 I saw all this, giving my heart to every deed done under the sun—a time one person ruled another to their harm. Namonaki makambo nyonso wana, tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Ezali na tango oyo moto amatelaka bato mosusu mpo na konyokola bango.
10 Then I saw the wicked buried and laid to rest; they came and went from the holy place and were praised in the city where they had done so. This too is fleeting. Mpe lisusu, namonaki ete bazali kokunda bato mabe ; bongo bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga na Esika ya bule bazalaki kokumisa bato mabe wana kati na engumba mpo na makambo oyo bazalaki kosala. Wana mpe ezali kaka pamba.
11 Because sentence for an evil deed is not carried out quickly, people's hearts are fully set on doing evil. Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe.
12 Though a sinner does evil one hundred times and still lives long, yet I know it will go well for those who fear God, who fear before him. Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo ; pamba te bazali na botosi liboso na Ye.
13 The wicked will not fare well, nor lengthen their days like a shadow, since they do not fear God. Nzokande, lokola bato mabe batosaka Nzambe te, makambo na bango mpe ekotambola malamu te, mpe mikolo ya bomoi na bango ekowumela te lokola elili.
14 Something fleeting happens on earth: righteous people getting what the wicked deserve, and wicked people getting what the righteous deserve. I said this too is fleeting. Ezali lisusu na eloko moko ya pamba oyo elekaka na mokili : bato ya sembo bazwaka lifuti oyo ebongi na bato mabe, mpe bato mabe bazwaka lifuti oyo ebongi na bato ya sembo. Nazali koloba solo ete wana mpe ezali kaka pamba.
15 So I praised enjoyment: nothing is better for a person under the sun than eating, drinking, and being glad. This accompanies them through their labor, the days of life God gave them under the sun. Bongo, nakumisaki esengo, pamba te ezali na eloko moko te na se ya moyi oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kolia, komela mpe kosepela. Boye esengo esengeli kobila ye kati na mosala na ye mikolo nyonso ya bomoi oyo Nzambe apesa ye na se ya moyi.
16 When I set my heart to know wisdom and see the work done on earth, though one's eyes see no sleep day or night. Tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba bwanya mpe kososola mosala ya moto kati na mokili, —ata soki miso na ye ezwaka pongi te, ezala na moyi to na butu—
17 Then I saw all God's work: no one can find out the work done under the sun. However hard they search, they won't find it; even if the wise claim to know, they can't find it out. namonaki nyonso oyo Nzambe asala. Moto moko te akoki kososola makambo oyo elekaka na se ya moyi. Soki asali makasi mpo na koyeba, akotikala te kososola tina na yango ; mpe ata soki moto ya bwanya abeti tolo ete ayebi, akotikala kaka kososola yango te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]