Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A good name is better than fine perfume, and the day of death than the day of birth. Kokende sango ya malamu eleki malasi ya solo kitoko na motuya, mpe mokolo ya kufa eleki mokolo ya mbotama na malamu.
2 It is better to go to the house of mourning than to go to the house of feasting, for that is the end of everyone, and the living should take it to heart. Kokende na ndako ya matanga ezali malamu koleka kokende na ndako oyo ezali na feti, pamba te kufa ezali suka ya moto nyonso ; yango wana, bato nyonso oyo bazali na bomoi basengeli kokanisaka na tina na yango.
3 Sorrow is better than laughter, for a sad face is good for the heart. Mawa eleki koseka na malamu, pamba te elongi ya mawa eyeisaka motema esengo.
4 The heart of the wise is in the house of mourning, but the heart of fools is in the house of pleasure. Motema ya moto ya bwanya ezalaka kati na ndako ya matanga, kasi motema ya zoba ezalaka kati na ndako ya bisengo.
5 It is better to hear the rebuke of the wise than to hear the song of fools. Koyoka pamela ya moto ya bwanya ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.
6 For like the crackling of thorns under a pot, so is the laughter of the fool. This too is fleeting. Koseka ya bazoba ezalaka lokola makelele ya basende oyo ezali kozika na se ya nzungu ; wana mpe ezali pamba.
7 Surely oppression turns a wise person into a fool, and a bribe corrupts the heart. Minyoko ekomisaka moto ya bwanya zoba, mpe bakado epengwisaka motema.
8 The end of a matter is better than its beginning, and a patient spirit is better than a proud spirit. Suka ya likambo ezali malamu koleka ebandeli ya likambo ; kokanga motema ezali malamu koleka lolendo.
9 Do not be quick in your spirit to become angry, for anger settles in the lap of fools. Kotombokaka noki te, pamba te kanda evandaka kati na bazoba.
10 Do not say, "Why were the former days better than these?" For it is not from wisdom that you ask this. Kolobaka te : « Mpo na nini mikolo eleki ezali malamu koleka mikolo ya lelo ? » Pamba te bwanya etindaka te bato kotuna mituna ya boye.
11 Wisdom is good with an inheritance, an advantage to those who see the sun. Bwanya ezali lokola libula, ezalaka malamu mpe epesaka litomba na bato oyo bamonaka moyi.
12 For wisdom is a shelter, just as money is, but the advantage of knowledge is this: wisdom preserves the life of the one who has it. Bwanya ezali lokola nguba, ndenge mpe mosolo ezalaka nguba ; kasi litomba ya boyebi ezali ete ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango.
13 Consider the work of God: who can straighten what he has made crooked? Tala malamu misala ya Nzambe : Nani akoki kosembola eloko oyo Ye asili kogumba ?
14 In the day of prosperity be joyful, and in the day of adversity consider: God has made the one as well as the other, so that no one can find out anything that will come after them. Na mokolo ya malamu, sepela ; na mokolo ya mabe, kanisa ; pamba te Nzambe nde asala nyonso mibale mpo ete moto ayeba te makambo oyo ekoya sima na ye.
15 In my fleeting days I've seen it all: a righteous man dying in his righteousness, a wicked man living long in his evil. Na mikolo ya pamba ya bomoi na ngai, namonaki makambo oyo nyonso : Moto ya sembo akufi mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe awumeli na bomoi mpo na mabe na ye.
16 Do not be excessively righteous, and do not make yourself overly wise; why should you destroy yourself? Kolekisa ndelo te ya kozala moto ya sembo to ya kozala moto ya bwanya ; mpo na nini komibebisa ?
17 Don't be too wicked, and don't be foolish—why die before your time? Kolekisa ndelo te ya kozala moto mabe to ya kozala zoba ; mpo na nini kokufa liboso ete mikolo ya bomoi na yo ekoka ?
18 Good to grasp this, and not let go of that too, for whoever fears God comes through both. Ezali malamu kokangama na toli ya liboso mpe kosimba toli ya mibale, pamba te moto oyo atosaka Nzambe akosalela toli nyonso mibale.
19 Wisdom makes the wise person stronger than ten rulers who are in a city. Bwanya ekomisaka moto oyo azali na yango makasi koleka bakambi zomi kati na engumba.
20 Surely there is no one righteous on earth who does good and never sins. Kati na mokili, ezali na moto moko te ya sembo oyo asalaka kaka malamu, bongo azanga kosala masumu.
21 Also, do not take to heart everything people say, or you may hear your servant cursing you, Kotiaka matoyi na bilobaloba ya bato te, noki te okoyoka mosali na yo kotiola yo ;
22 for your own heart knows that many times you yourself have cursed others. pamba te, oyebi malamu, kati na motema na yo, ete yo mpe otiolaka bato mosusu mbala mingi.
23 I tested all this by wisdom. I said, "I am determined to be wise"—but it was beyond me. Namekaki kososola makambo wana nyonso na nzela ya bwanya, namilobelaki : « Nakosala nyonso mpo ete nakoma moto ya bwanya, » kasi bwanya ezalaki kaka mosika na ngai.
24 Whatever exists is far off and deep, very deep—who can discover it? Nyonso oyo ezalisami ezali mosika, mozindo mpe mozindo makasi ; nani akoki komona yango ?
25 I turned my heart to know, explore, and seek wisdom and the sum of things, and to know the evil of foolishness and the foolishness that is madness. Boye, na motema na ngai mobimba, namipesaki mpo na kososola, koyeba, koluka bwanya mpe boyebi ; mpe mpo na kososola bozoba ya mabe elongo na liboma ya bozoba.
26 I find the woman more bitter than death: her heart is snares and nets, her hands chains. One good before God escapes her; the sinner is caught by her. Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.
27 "See, this is what I found," says the Teacher, "adding one to another to find the sum, Mosakoli alobi : « Tala makambo oyo nasosoli sima na koyekola mwasi moko na moko mpo na kozwa mayele :
28 which my soul kept seeking but didn't find. One man in 1,000 I found, but a woman among all these I didn't find. Nazali koluka, kasi nanu namoni te. Namoni mobali moko ya sembo kati na mibali nkoto moko, kasi namoni ata mwasi moko te ya sembo kati na basi nyonso !
29 Look, this alone I found: God made humanity upright, but they sought many schemes." Tala makambo oyo nasosoli : Nzambe asala bato mpo ete bazala malamu, kasi bato bamilukelaka mindondo bango moko. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]