Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 There is an evil I have seen under the sun, and it weighs heavily on humanity: Namoni mabe mosusu na se ya moyi, mpe ezali kilo makasi mpo na bato :
2 A man God gives wealth, riches, and honor, lacking nothing his soul desires—yet God doesn't let him eat from it; a stranger eats it instead. This is fleeting, a miserable sickness. ezali na bato oyo bazwi kowuta na Nzambe bozwi, biloko ebele mpe lokumu mpo ete bazanga eloko moko te oyo mitema na bango ekoki kozala na yango posa ; kasi Ye moko Nzambe apimeli bango makoki ya kosepela na yango, pamba te moto mosusu nde azali kosepela na yango. Wana mpe ezali pamba, mpe ezali mabe oyo epesaka penza mawa.
3 If a man fathers one hundred children and lives many years—however long his life—but his soul isn't satisfied with good things, and he isn't even buried, I say a stillborn child is better off than he is. Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ;
4 It comes in vapor and goes into darkness; darkness covers its name. pamba te, mwana oyo abotami ya kokufa, abotami pamba, azongi kati na molili, mpe bakokanisa ye lisusu te ;
5 Though it never saw the sun or knew anything, it has more rest than that man. atako amoni moyi te to atikali koyeba ata eloko moko te, azali na kimia koleka mozwi.
6 Even if he lives 1,000 years twice over without ever enjoying good, don't all go to the same place? Ata awumeli na bomoi mibu nkoto moko mbala mibale, akotikala komona esengo te. Boni, bato nyonso bakendaka kaka esika moko te ?
7 All a person's toil is for his mouth, yet his appetite is never satisfied. Pasi nyonso oyo moto amonaka ezali mpo ete akokisa baposa na ye, nzokande baposa yango esilaka kaka te.
8 What advantage has the wise over the fool? What does the poor person gain by knowing how to conduct himself before others? Moto ya bwanya aleki moto oyo azangi mayele na nini ? Litomba nini mobola azali na yango ata ayebi kotambola liboso ya bato mosusu ?
9 Better the sight of eyes than desire's wandering. This too is fleeting, a chasing after the wind. Biloko oyo moto azali komona na miso ezali malamu koleka biloko oyo azali na yango na makanisi : yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
10 Whatever exists was already named, and what man is, is known; and he cannot dispute with one stronger than himself. Ekelamu nyonso oyo ezali esila koyebana na kombo na yango, mpe eyebani malamu soki moto azali nani : akoki te kotelemela oyo aleki ye na makasi.
11 The more words, the more fleeting it all becomes, and how does that profit anyone? Soki maloba eleki mingi, makambo ya pamba-pamba eyaka mpe ebele ; bongo litomba na yango ezali penza nini ?
12 For who knows what is good for a person in the few days of their fleeting life, passed like a shadow? For who can tell them what will happen after them under the sun? Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili ? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]