Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
4:17 Guard your steps entering the house of God. Draw near to listen, not to offer fools' sacrifice—they don't know they're doing evil. Batela makolo na yo tango ozali kokende na Ndako ya Nzambe ; eleki malamu kokende kuna mpo na koyoka, kasi mpo na kobonza mbeka ya bazoba te, pamba te bayebaka te ete basalaka mabe.
1 Don't rush your mouth, and don't let your heart hurry to speak before God—God is in heaven, you're on earth, so keep your words few. Kowelela te kofungola monoko na yo, mpe tika ete motema na yo ewelela te kobimisa liloba liboso ya Nzambe ! Pamba te Nzambe azali na likolo, mpe yo ozali na mabele. Boye, tika ete maloba na yo ezalaka mingi te !
2 For a dream comes from too much activity, and a fool's voice from too many words. Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi, ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.
3 When you vow a vow to God, don't delay paying it—he has no delight in fools. Pay what you vow. Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe, kowumela te mpo na kokokisa yango ; pamba te Nzambe asepelaka na bazoba te ; kokisa ndayi na yo.
4 It is better not to vow than to vow and not fulfill it. Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango.
5 Don't let your mouth make you sin, or tell the messenger it was a mistake. Why should God be angry at your voice and destroy your handiwork? Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe : « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo ?
6 For in many dreams and many words there is fleeting vapor. Therefore fear God. Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba ; yango wana tosa nde Nzambe.
7 If you see the poor oppressed, and justice and righteousness violated in a province, don't be surprised—one official is watched by a higher one, and higher ones stand over them. Soki omoni ete bazali konyokola mobola kati na mokili, bongo boyengebene mpe bosembo etiolami, kokamwa likambo yango te ; pamba te mokambi moko azali na se ya mokambi mosusu ; mpe na likolo na bango mibale, ezali na bakonzi mosusu oyo baleki na bokonzi.
8 Yet the profit of the land is for everyone; even the king is served by the field. Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.
9 Whoever loves money never has enough; whoever loves wealth never has enough income. This too is fleeting. Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo, bozwi na ye etondisaka ye te. Wana mpe ezali kaka pamba.
10 As wealth grows, so do those who consume it—what gain for its owner but watching it with his eyes? Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele, ndenge wana mpe bato oyo baliaka yango bakomaka ebele ; bongo litomba nini nkolo na yango akozwa, soki kaka te komona yango na miso ?
11 A worker's sleep is sweet, whether he eats little or much; the rich man's abundance won't let him sleep. Pongi ya mosali ezalaka ya kimia, ata soki alie moke to mingi ; kasi bomengo ya mozwi ezangisaka ye pongi.
12 I have seen a sickening evil under the sun: wealth kept by its owner, to his harm. Namoni mabe moko na se ya moyi, epesaka penza mawa : moto abombi bomengo na ye, kasi ememeli ye pasi ;
13 That wealth was lost in a bad venture, and when he fathered a son he had nothing left to leave him. likambo moko ya mabe ya mbalakata ebebisi bomengo yango, mpe mwana na ye azangi libula ya kokitana na yango.
14 As he came from his mother's womb, naked he returns, going as he came, taking nothing from his labor to carry in his hand. Ndenge abotamaki bolumbu wuta na libumu ya mama na ye, ndenge mpe akozanga bolumbu, akomema ata mbuma moko te ya mosala na ye.
15 This too is a bitter evil: just as he came, so he goes. What does he gain from toiling for wind? Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa : ndenge moto ayaki, ndenge mpe akozonga. Bongo litomba na ye ezali nini ? Asali kaka mpo na mopepe ?
16 All his days he eats in darkness, with much frustration, sickness, and anger. Alekisi mikolo nyonso ya bomoi na ye kati na molili, na pasi, na komitungisa mpe na kanda.
17 This I have seen: it is good and fitting to eat, drink, and see good in all the labor one labors at under the sun through the few days of life God gives—for that is one's lot. Mpo na yango, tala likambo oyo ngai namoni ete ezali malamu : ebongi na moto kolia, komela mpe kosepela na mbuma ya mosala na ye na se ya moyi, na mikolo ya bomoi oyo Nzambe apesi ye, pamba te yango nde libula na ye.
18 Also, when God gives someone wealth, possessions, and power to enjoy them, to accept their portion and find joy in their labor—that is God's gift. Kutu, epai na moto nyonso oyo Nzambe apesi bomengo mpe biloko ebele, bongo apesi ye lisusu makoki ya kosalela yango, ya kozwa libula na ye mpe ya kosepela na mbuma ya mosala na ye, wana ezali penza likabo ya Nzambe !
19 He will seldom recall the days of his life, since God keeps him busy with the joy of his heart. Nzokande, wana Nzambe akotondisa motema na ye na esengo, moto yango akosala keba te na motango ya mikolo ya bomoi na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]