Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Again I looked and saw all the oppression under the sun: the oppressed were in tears, with no one to comfort them; their oppressors held the power, and still no comforter. Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.
2 So I declared the dead, who had already died, happier than the living, who are still alive. Yango wana, namonaki ete bato oyo basila kokufa kala bazali na bango kutu malamu koleka bato oyo bazali nanu na bomoi.
3 Better than both is the one not yet born, who hasn't seen the evil done under the sun. Mpe moto oyo atikala nanu kozala te azali malamu koleka bango mibale, pamba te atikala nanu komona te misala mabe oyo esalemaka na se ya moyi.
4 I saw all labor and skill come from one neighbor's envy of another. This too is fleeting, a chasing after wind. Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
5 The fool folds his hands and ruins himself. Moto oyo azangi mayele akangaka maboko na ye mpe amibebisaka ye moko.
6 Better one handful with tranquility than two handfuls with toil and a chasing after the wind. Loboko moko oyo etondi na kimia ezali malamu koleka maboko mibale oyo etondi na misala makasi mpe na kolanda mopepe.
7 Again I saw something fleeting under the sun: Namonaki lisusu likambo mosusu ya pamba na se ya moyi :
8 A man alone, no companion, no son or brother; his labor has no end, yet his eyes never fill with wealth. "For whom am I working," he asks, "denying myself good?" This too is a breath—a bad task. Ezalaki na moto moko oyo azalaki kaka ye moko, azalaki ata na mwana to ndeko te ; azalaki kopema te na mosala na ye ya makasi, kasi bomengo na ye etikalaki te kotondisa miso na ye. Mpe atikalaki komituna te : « Nani oyo ngai nazali komonela pasi boye ? Mpe mpo na nini nazali komipimela bomengo ? » Wana mpe lisusu ezali pamba : ezali mosala ya mpunda !
9 Two are better than one, because they have a good return for their labor: Bato mibale bazali malamu koleka moto moko, pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango.
10 If one falls, the other lifts him up. But pity the one who falls alone, with no one to help him up. Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ; kasi mawa na moto oyo akweyi mpe azangi moto oyo akosunga ye !
11 Also, if two lie down together, they will keep warm. But how can one keep warm alone? Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko, bayokaka moto ; kasi moto oyo azali ye moko, ndenge nini akoki koyoka moto ?
12 One alone can be overpowered; two can resist. A cord of three strands is not quickly broken. Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ; kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna. Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.
13 Better a poor, wise youth than an old, foolish king who no longer knows to take warning. Elenge mobola ya mayele azali malamu koleka mokonzi ya mobange oyo azangi mayele mpe ayokaka toli te ;
14 The youth may have come from prison to reign, or he may have been born poor within that same kingdom. ezala soki elenge mobali yango abotama mobola kati na mokili na ye to awuti kobima na boloko mpo na kokoma mokonzi.
15 I saw all the living who move about under the sun following the youth, the king's successor. Namonaki bato nyonso ya bomoi, oyo bazali kotambola na se ya moyi kolanda elenge mobali lokola mokitani ya mokonzi.
16 Countless were all the people who came before him. Yet those who came later were not pleased with him. This too is fleeting, a chasing after wind. Ata soki bato oyo bazalaki kosepela na ye bazalaki ebele koleka, kasi bato oyo bakoya sima bakoki koboya ye. Yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]