Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 For everything there is a season, and a time for every matter under heaven: Likambo nyonso ezalaka na tango na yango, mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango, na se ya moyi.
2 a time to be born, and a time to die; a time to plant, and a time to uproot what is planted; Ezali na tango ya kobotama mpe tango ya kokufa, tango ya kolona mpe tango ya kopikola oyo elonami ;
3 a time to kill, and a time to heal; a time to tear down, and a time to build up; tango ya koboma mpe tango ya kobikisa, tango ya kobuka mpe tango ya kotonga ;
4 a time to weep, and a time to laugh; a time to mourn, and a time to dance; tango ya kolela mpe tango ya koseka, tango ya kosala matanga mpe tango ya kobina ;
5 a time to throw away stones, and a time to gather stones together; a time to embrace, and a time to refrain from embracing; tango ya kopanza mabanga mpe tango ya kosangisa yango, tango ya kopesa beze mpe tango ya kotika kopesa beze ;
6 a time to seek, and a time to lose; a time to keep, and a time to throw away; tango ya koluka mpe tango ya kobungisa, tango ya kobomba mpe tango ya kobwaka ;
7 a time to tear, and a time to sew; a time to be silent, and a time to speak; tango ya kopasola mpe tango ya kobamba, tango ya kokanga monoko mpe tango ya koloba ;
8 a time to love, and a time to hate; a time for war, and a time for peace. tango ya kolinga mpe tango ya koyina, tango ya bitumba mpe tango ya kimia.
9 What gain has the worker from his toil? Litomba nini mosali azwaka na mosala oyo amonelaka pasi ?
10 I have seen the task that God has given people to keep them busy. Natalaki mokumba oyo Nzambe amemisaki bato.
11 He made everything beautiful in its time, and set eternity in the human heart—yet no one can grasp what God has done from start to end. Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango ; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.
12 I know nothing is better for them than to enjoy life and do good while they live. Nayebi ete ezali na eloko moko oyo eleki malamu mpo na bato : ezali kaka kosepela mpe kozala malamu tango bazali na bomoi.
13 Also, that everyone eat, drink, and find satisfaction in all their work—this is God's gift. Yango wana, tika ete moto na moto alia, amela mpe amona bolamu kati na mosala na ye nyonso, pamba te ezali likabo ya Nzambe.
14 I know all God does lasts forever; nothing can be added, nothing removed. He has done it so people will fear before him. Nayebi ete makambo nyonso oyo Nzambe asalaka ewumelaka seko ; boye ezali ata na eloko moko te ya kobakisa na likolo na yango to ya kolongola kati na yango. Nzambe asalaka yango bongo mpo ete bakumisa Ye.
15 What is has already been, and what will be has already been; and God seeks out what was driven away. Makambo oyo ezali lelo esila kozala na kala, mpe makambo oyo ekoya ezala wuta kala ; Nzambe nde azongisaka makambo oyo esila koleka na tango ya kala.
16 I also saw under the sun: evil in the place of judgment, and evil in the place of righteousness. Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : ezala na esika oyo basambisaka bato, mabe ezali kaka ; ezala na esika ya bosembo, mabe ezangaka te.
17 I said in my heart: "God will judge the righteous and the wicked, for there's a time for every matter and every deed, there." Namilobelaki kati na ngai : « Nzambe akosambisa, ezala bato ya sembo to bato mabe, pamba te ezali na tango mpo na likambo moko na moko, mpe ezali na tango mpo na kosambisa likambo moko na moko. »
18 I said in my heart: "God tests people, so that they may see they're just animals." Namilobelaki lisusu : « Nzambe amekaka bato mpo ete bakoka komimona bango moko ete bazali lokola banyama.
19 Humans and animals share one fate: one dies as the other dies; both have the same breath. Humans have no advantage over animals—all is vapor. Suka ya moto ezali lokola suka ya nyama : bango mibale basukaka kaka ndenge moko ; ndenge moko akufaka, mosusu mpe akufaka kaka bongo. Bango nyonso bazali kaka na pema moko : moto aleki nyama na eloko te. Nyonso wana ezali kaka pamba.
20 All go to one place; all came from the dust, and all return to the dust. Nyonso ekendaka kaka esika moko ; nyonso ewutaki na putulu, mpe nyonso ekozonga kaka na putulu.
21 Who knows whether the human spirit goes up, and whether the animal's spirit goes down to the earth? Nani ayebi soki molimo ya moto emataka na likolo, mpe soki molimo ya nyama ekitaka na se ya mabele ? »
22 So I saw nothing is better than a person rejoicing in their work, since that is their lot. For who can show them what comes after them? Boye, nasosolaki ete ezali na eloko moko te oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kosepela mpe komona bolamu na mosala na ye, pamba te yango nde ezali litomba na ye. Nani akoki kosunga ye mpo ete amona makambo oyo ekoya sima na ye ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]