Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In my heart I said, "Come, I'll test you with pleasure; enjoy what's good." But this too was fleeting. Namilobelaki : « Yaka sik’oyo ; nakomekisa yo bilengi mpo ete ozala moto ya esengo ! » Nzokande, yango mpe ezalaki kaka pamba.
2 I said of laughter, "It is madness," and of pleasure, "What does it accomplish?" Na tina na koseka, nalobaki : « Ezali na yango kaka bozoba ! » Bongo na tina na elengi, nalobaki : « Esalaka nini ? »
3 I explored in my heart how to cheer my body with wine—my heart still guiding me with wisdom—and to grasp foolishness, until I might see what is good for people to do under heaven the few days of their lives. Wana motema na ngai ezalaki nanu kokamba ngai na bwanya, nazwaki mokano ya komipesa na masanga ya vino mpe na makambo ya bozoba. Nazalaki nde na posa ya kososola bolamu nini moto akoki kozwa na kosala bongo na se ya moyi, na mwa mikolo ya bomoi na ye.
4 I undertook great works. I built houses for myself and planted vineyards. Nazwaki mokano ya kosalisa misala minene : namitongelaki bandako minene mpe namilonelaki bilanga ya vino mpo na bomoi na ngai ;
5 I made myself gardens and parks, and planted in them all kinds of fruit trees. nasalaki bilanga mpe nabongisaki bisika mpo na kolona banzete ya ndenge na ndenge, oyo ebotaka bambuma ;
6 I made myself pools of water to irrigate a forest of growing trees. natimolaki mpo na ngai moko, mabulu minene ya mayi mpo na kosopela banzete ya mike mayi.
7 I bought male and female slaves, and had home-born slaves too. I owned larger herds and flocks than anyone before me in Jerusalem. Nasombaki bawumbu ya mibali mpe ya basi ; kobakisa na motango ya bawumbu mosusu oyo babotamaki kati na ndako na ngai. Nazalaki mpe na bangombe, bantaba mpe bameme ebele koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai.
8 I gathered for myself silver and gold, the treasure of kings and provinces. I got male and female singers, and men's delights—many concubines. Nakongolaki mpo na ngai moko palata mpe wolo oyo ewutaki na bomengo ya bakonzi mpe ya bituka ; nazwaki mpo na ngai bayembi ya basi mpe ya mibali, mpe oyo esepelisaka makasi mibali : mwasi mpe basi ebele ya kitoko.
9 So I became great, greater than all before me in Jerusalem; and my wisdom stayed with me. Nakomaki moto monene koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai ; kasi atako bongo, bwanya ezalaki kaka kotambolisa ngai.
10 Whatever my eyes wanted I did not withhold. I refused my heart no joy, for my heart delighted in all my work, and this was my reward for all my work. Napimelaki miso na ngai eloko moko te oyo elulaki, napimelaki motema na ngai esengo moko te. Motema na ngai esepelaki na misala na ngai nyonso, mpe yango ezalaki lifuti ya mosala na ngai nyonso.
11 Then I surveyed all my hands had done and the toil I spent doing it, and it was all fleeting, chasing wind; nothing was gained under the sun. Boye, tango natali misala nyonso oyo maboko na ngai esalaki mpe pasi nyonso oyo namonaki mpo na kokokisa yango, namoni ete nyonso wana ezalaki kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe, ezali na yango na litomba moko te na se ya moyi.
12 So I turned to consider wisdom, madness, and foolishness. For what can the king's successor do? Only what has already been done. Bongo, nabalolaki makanisi na ngai mpo na koyekola bwanya, bozoba mpe bolema. Eloko nini mokitani ya mokonzi akoki kosala, oyo eleki oyo esila kosalema ?
13 I saw that wisdom has more gain than foolishness, as light has more than darkness. Namonaki ete bwanya ezali malamu koleka bozoba, ndenge pole ezali malamu koleka molili.
14 The wise person has eyes in his head, but the fool walks in darkness. And yet I perceived that the same fate befalls them all. Moto ya bwanya ayebi epai azali kokende, kasi zoba atambolaka na molili ; kasi nasosoli likambo moko : suka na bango mibale ekozala kaka ndenge moko.
15 Then I thought, "The fool's fate is mine too. So why have I been so very wise?" And I decided this too is fleeting. Namilobelaki : « Suka ya zoba ekozala ndenge moko kaka na suka na ngai ; sik’oyo, litomba nini ezali na moto ya kozala na bwanya mingi ? » Namilobelaki : « Oyo mpe ezali kaka pamba. »
16 The wise, like the fool, will not be remembered for long; in days to come both are forgotten. How the wise die just like fools! Pamba te ezala moto ya bwanya to zoba, bakotikala kokanisa bango tango molayi te ; mpe na mikolo ekoya, bato bakobosana bango mibale. Moto ya bwanya mpe akokufa lokola moto ya zoba.
17 So I hated life, because the work done under the sun grieved me; it is all fleeting, a chasing after wind. Boye, nayinaki bomoi, pamba te misala oyo esalemaka na se ya moyi ezali mabe mpo na ngai. Nyonso wana ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
18 I hated all my labor under the sun, since I must leave it to the one after me. Nayinaki biloko nyonso oyo namonelaki pasi na se ya moyi, pamba te nakotika yango epai ya moto oyo akoya sima na ngai.
19 Who knows if he will be wise or a fool? Yet he will control all I worked for with my wisdom under the sun. This too is fleeting. Bongo, nani ayebi soki moto yango akozala moto ya bwanya to zoba ? Nzokande, ye nde akozala na bokonzi na likolo ya misala nyonso oyo nabimiselaki motoki mpe mayele na ngai na se ya tango. Yango mpe ezali kaka pamba.
20 So I gave my heart up to despair over all the toil I labored at under the sun. Bongo, motema na ngai ekomaki kobungisa elikya likolo ya misala makasi oyo nazalaki kosala na se ya moyi.
21 One may work with wisdom, knowledge, and skill, yet must leave it all to be enjoyed by someone who never worked for it. This too is fleeting, a great evil. Pamba te moto akoki kosala mosala na ye na bwanya, na boyebi mpe na ndenge esengeli penza ; kasi akotika nyonso oyo azali na yango epai ya moto oyo amonelaki yango pasi te ; yango mpe ezali pamba mpe mabe makasi.
22 What does a person gain from all the toil and striving of heart he labors at under the sun? Litomba nini moto akoki kozwa na misala nyonso oyo asali mpe amonelaka pasi na se ya moyi ?
23 All his days bring sorrow, his work grief; even at night his mind gets no rest. This too is fleeting. Mikolo nyonso ya mosala na ye ezali kaka pasi mpe komitungisa ; ezala na butu, makanisi na ye ezalaka na kimia te ; oyo mpe ezali kaka pamba.
24 Nothing is better for a person than to eat, drink, and enjoy his work. This too, I saw, is from God's hand, Eloko eleki malamu mpo na moto ezali kaka kolia, komela mpe kosepela na mosala na ye. Namoni ete oyo mpe ewuti na loboko na Nzambe ;
25 for apart from him, who can eat or who can find enjoyment? pamba te soki Nzambe azalaki te, nani akoki kolia mpe kosepela ?
26 God gives wisdom, knowledge, and joy to the person who pleases him, but to the sinner he gives the work of gathering and collecting, only to hand it to one who pleases God. This too is fleeting, chasing wind. Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye ; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]