Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ecclesiastes 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The words of the Teacher, son of David, king in Jerusalem. Maloba ya Moteyi, mwana mobali ya Davidi, mokonzi na Yelusalemi.
2 "Utterly fleeting," says the Teacher, "utterly fleeting! Everything is fleeting." Pamba na pamba, elobi Moteyi ; pamba na pamba, nyonso ezali kaka pamba.
3 What does a person gain from all the labor at which they toil under the sun? Moto azwaka litomba nini penza na misala nyonso oyo amonelaka pasi na se ya moyi ?
4 A generation goes, and a generation comes, but the earth remains forever. Eleko moko eleki, mpe eleko mosusu eyei, kasi mabele etikalaka kaka seko na seko.
5 The sun rises and the sun sets, and hurries back to the place where it rises. Moyi ebimaka mpe elalaka, bongo ezongaka na lombangu na esika oyo ebimelaka.
6 The wind blows to the south and turns to the north; round and round it goes, ever returning on its circuits. Mopepe ekeyi na ngambo ya sude, ebaluki na ngambo ya nor, ebaluki-baluki mpe ekeyi lisusu, ezongelaka kaka banzela wana.
7 All the streams run to the sea, yet the sea is never full; the streams return to their source and flow again. Mayi nyonso ekendaka na ebale monene, kasi ebale monene etondaka te ; mpe mayi yango ezongaka lisusu epai ewutaka.
8 All things are wearisome, more than anyone can express; the eye is not satisfied with seeing, nor the ear filled with hearing. Makambo nyonso elembisaka, moto oyo akoki kobeta na yango tembe azali te ; nzokande, miso etondaka te na kotala, mpe matoyi etondaka te na koyoka.
9 What has been is what will be, and what has been done is what will be done; there is nothing new under the sun. Oyo ezalaki ekozala lisusu, oyo esalemaki ekosalema lisusu : likambo ya sika ezalaka te na se ya moyi.
10 Is there anything anyone can point to and say, "Look, this is new"? It was already here, in the ages before us. Boni, ezali penza na likambo moko oyo moto akoki koloba na tina yango : « Tala, oyo penza ezali likambo ya sika ? » Te, esila komizalela kala, kala penza liboso ya eleko na biso.
11 There is no remembrance of those who came before, and even those yet to come will not be remembered by those who follow them. Ndenge bato bayebaka lisusu bato ya kala te, ndenge wana mpe bato oyo bakoya sima bakotikala koyeba bango te na bato oyo bakolanda.
12 I, the Teacher, was king over Israel in Jerusalem. Ngai, Moteyi, nazalaki mokonzi ya Isalaele, na Yelusalemi.
13 I gave my heart to seek and explore by wisdom all that is done under heaven—a miserable task God has given mankind to struggle with. Namipesaki mpo na koyekola mpe kososola na nzela ya bwanya, makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Nzokande, ezali na yango kaka mosala ya mpunda oyo Nzambe apesa na bana ya bato mpo ete bamonela yango pasi !
14 I saw all the deeds done under the sun, and look—it is all fleeting, a chasing after wind. Namona misala nyonso oyo esalemaka na se ya moyi ; nyonso wana ezali kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
15 What is crooked cannot be made straight, and what is lacking cannot be counted. Bakoki te kosembola eloko oyo etengama, bakoki mpe te kotanga eloko oyo ezali te.
16 I told myself, "Look, I have grown great and gained more wisdom than all who ruled Jerusalem before me; my heart has seen much wisdom and knowledge." Namilobelaki : « Tala, nakolisi mpe nabakisi bwanya mingi koleka moto nyonso oyo azalaki liboso na ngai, na Yelusalemi. » Motema na ngai etondaki penza na bwanya mpe na boyebi ebele.
17 I set my mind to know wisdom, and madness and foolishness; I learned this too is a chasing after the wind. Namipesaki makasi mpo na koyekola bwanya mpe, lisusu, makambo ya bozoba mpe ya liboma ; kasi nasosolaki ete yango mpe ezali kaka lokola moto azali kolanda mopepe.
18 For with much wisdom comes much grief, and the more knowledge, the more sorrow. Pamba te kozala na bwanya mingi ememelaka moto pasi, mpe kozala na mayele mingi etungisaka motema.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]